عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Joseph [Yusuf] - Lingala translation

Surah Joseph [Yusuf] Ayah 111 Location Maccah Number 12

1. Alif, lâm, râ(1). Wana ezali mikapo mia buku ya polele.

8. Tango balobaki ete: Yûsuf na ndeko waye balingami epai ya tata wa biso koleka, mpe biso tozali lisanga lia makasi. Ya sólo, tata wa biso azali na libunga lia polele.

11. Balobaki: Eh tata wa biso! Mpona nini te ozali kondimela biso mpona Yûsuf mpe tozali na makanisi malamu epai naye mpe biso tokopesa ye toli?

13. Alobaki: Solo, ezali kopesa ngai mawa ete bökende naye mpe nazali kobanga ete mbwa ya zamba eliya ye. O tango eye bokozala na bokebi naye te.

16. Mpe bazongi epai ya tata wa bango na pokwa bazali kolela,

17. Balobi: Eh tata wa biso! Ya soló, tokendeki komekana тропа kobwaka makonga na mokili, тре totikaki Yûsuf pene na biloko bia biso mpe mbwa ya zamba alei ye. Mpe yo okoki kondimela biso te ata soki tolobi bosembo.

19. Мре baleki nzela bato ya mombongo batindi moko wa bango mpo akende kotoka mayi тропа bango, tango akitisi katini naye mpo atoka mayi, alobi: Sango elamu, oyo elenge mobali! Mpe batiaki ye na mikumba mpo bateka ye. Kasi Allah nde moyebi na oyo bakosala.

23. Mpe kasi (mwasi wa mokonzi) oyo ayambaki ye o ndako naye amekaki mpo akweisa ye na ekobo, mpe akangelaki ye bizibeli bia ndako mpe alobi: Yaka; na sili kobongama тропа yo, alobi ete: (Yûsuf) Allah abatela ngai. Ya soló azali Nkolo wa ngai, apesi ngai libateli ya malamu, ya solo bato mabe bakolongaka te.

24. Mpe asilaki kolula ye. Ye (Yûsuf) mpe lokola, alulaki ye (mwasi ya mokonzi) soki amonaki elembo ya Nkolo waye te, na boye nde totiyaki ye mosika na mabe mpe mosika ya ekobo, ya sólo ye azalaki moko ya bawumbu na biso ya malamu.

25. Mpe bango banso babale balandanaki mbangu о ngambu ya bizibeli bia ndako mpe apasolaki simisi naye apasoli simisi ya Yûsuf osima ya mokongo mpe bakutani na mobali (wa mwasi ona) na ezibeli ya ndako. Alobi: Lifuta nini okopesa na oyo alingaki kosala mwasi wayo mabe sé ezala boloko to etumbu ekasi?

26. Alobi (Yûsuf): Ezali ye nde alingaki kokweya na ngai, mpe nzeneneke moko o kati ya libota lia ye alobi: Soki simisi naye epasuki liboso, wana alobi(1) bosoló, mpe ye(2) azali kati ya babuki lokuta.

28. Мре tango (mobali) amoni simisi epasuki na sima alobi: Ya soló, ezali motambo ya bino (basi) ya mabe, ya soló motambo na bino (basi) ezali monene koleka.

29. Yûsuf, kokanisa lisusu na oyo te, mpe yo (mwasi) senga bolimbisi тропа lisumu lia yo, mpo ozalaki o kati ya basali mbeba.

30. Mpe tango basi okati ya mboka balobi ete: Mwasi ya mokonzi alingaki kokweisa elenge mobali naye ye moko! Ya sólo penza, asili kolangwa ye bolingo, ya sólo biso tomoni été asili kobunga nzela penza.

33. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Boloko ezali malamu тропа ngai koleka oyo bazali kobenga ngai na yango. Mpe soki obateli ngai te na likita na bango, nakokweya na bango, mpe nakozala o kati ya bazoba.

35. Sima emonanaki polele na liboso na bango été (Yûsuf) asali eloko te, bamonaki été esengeli kokotisa ye na boloko kino tango oyo esengeli.

49. Sima mobu moko mokoya, mbula ekonoka тропа kosalisa bato, тре nakati na yango (mobu) bakokamola (bambuma).

53. Mpe nakoki komilongola te. Ya sólo, molimo motindaka na mabe, longola sé oyo Nkolo wa ngai akoyokela ye mawa. Ya solo, Nkolo wa ngai azali molimbisi atonda mawa.

55. Alobi (Yûsuf): Tiya ngai nazala mobateli ya sanduku ya mboka, ya solo, ngai nayebi kobatela.

59. Mpe tango apesi bango biloko biye alengeleki тропа bango, alobi: В óyela ngai ndeko wa bino, oyo atikalaki epai ya tata wa bino. Boye bozali kornona te ete nazali kokokisa emekeli (kilo) bwa ngai Mpe nazali malamu koleka?

61. Mpe balobi: Tokomeka koyebisa tata waye. Mpe ya soló, tokomeka kosala yango.

72. Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli.

76. Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi.

82. Mpe tuna mboka (bato ya mboka) epai towuti, esika eye tokomelaki, mpe lisanga na biso bato ya mobembo. Ya sólo tozali penza koloba bosóló.

83. Alobi (ya’qúb): Milimo mia bino mitindi bino na likambo mabe. Kasi kokanga motema ezali kitoko mpe malamu, tango mosusu Allah akozongisela ngai bango banso. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.

93. Bökende na simisi na ngai oyo, mpe bobwaka yango na elongi ya tata na ngai, miso naye ekofungwama. Мре па sima boyela ngai libota nabino mobimba.

94. Mpe tango bakotaki na ndelo ya mboka tata na bango alobaki été: Ya soló, ngai nazali koyoka solo ya Yûsuf, ata soki bozali kozua ngai na lokuta.

95. Balobaki naye: Na nkombo ya Allah! Ya sólo, yo ozali penza na libunga nayo ya kala.

96. Мре tango momemi sango malamu akomaki, abwakaki simisi na elongi naye mpe miso naye efungwamaki. Mpe alobaki na bana été: Boye nayebisaki bino te ete ya soló, Allah apeși ngai boyebi boye bozali na yango te?

98. Alobi: Nakosengelaka bino bolimbisi epai ya Nkolo wa ngai, ya sólo, ye azali molimbisi atonda ngolu.

102. Wana ezali basango oyo eyebani te tozali koyebisa nayo, mpe ozalaki te na bango elongo tango basanganaki тропа kosala likita na bango, mpe bazalaki kondima тропа kosala likita. (lia mabe)

104. Nzoka nde okosenga bango lifuta te тропа yango, wana ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.

110. Kino tango batindami balingaki кокота nakozanga elikia, mpe bakanisaki ete bato na bango basili koboya bango, kasi elonga na biso eyaki tango wana. Mpe tobikisaki nani tolingaki kati na bango, kasi etumbu na biso ezangisaka batomboki te.

111. Ezalaki o kati ya masapo na bango, liteya тропа bato ya mayele. Ezali másese ya lokuta te mpe ya pamba pamba te kasi ezali nde bosembo oyo ezali kondima na maye makitaki liboso, mpe ndimbola ya makambo manso, ezali mpe bokambi mpe ngolu тропа bandimi.