عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Abraham [Ibrahim] - Lingala translation

Surah Abraham [Ibrahim] Ayah 52 Location Maccah Number 14

1. Alif, lâm, râ.(1) buku eye tokitisi yango epai nayo ete obimisa na yango bato na molili komema bango na mwinda na ndingisa ya Nkolo wa bango, komema bango na nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu.

5. Мре tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi ma biso, bimisa bato bayo na molili bakende na bongengi. Mpe yebisa bango ete bakanisa na mikolo mia Allah. Ya soló, bilembo bina bizali тропа bato banso bakangi mitema mpe bazali na botondi.

6. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah.

7. Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi.

8. Mpe Mûssa alobaki ete: Soki bopengwi bino na baye banso bazali na nsé, ya sólo, boyeba ete Allah atonda na bomengo bwa ye mpe asanzolama na lokumu.

14. Mpe tokovandisa bino o mboka sima na bango. Wana ezali тропа oyo akobanga bokutani na ngai тре azali kobanga elaka na etumbu. (na ngai)

15. Mpe basengaki Allah elonga, mpe bato banso ya mabe bazalaki kobundisa bosôló bakweyaki.

20. Kaši wana ezali paši te тропа Allah asala yango.

21. Мре bawei banso bakobimaka о malita ma bango тре bakotelemaka o liboso lia Allah тропа kokata makambo, mpe bato bamotawu bakolobaka na ba oyo ya makasi mpe ya lolendo: Tozalaki kolanda bino, bokoki kokimisa mpe kobikisa biso na etumbu ya Allah te? Bakoyanolaka: Soki Allah akambaka biso tolingaki kokamba bino, tokokoka komisalisa te ata soki tozeli, mpe tozali na esika ya kokimela te.

23. Мре bakokotisama baye bandimaki mpe basalaki misala milamu o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka o kati na yango libela, na bolingi bwa Nkolo wa bango. Мре kuna losako na bango lokozala sé ete: (salam) kimia.

24. Boye, ozali kornona te ete: Allah apeși ndakisa ya liloba lilamu lizali lokola nzete elamu eye misisa mia yango mikangama malamu, mpe bitape bia yango bibimi na likolo?

29. Bakozikisamaka na moto ya lifelo, oyo nde efandeli ya mabe!

30. Mpe batieli Allah binzambe nzambe, тропа kobungisa na yango bato nzela naye. Loba: Bosepela (na bomoyi bwa mokili) kaši nzela na bino ezali ya sôló okati ya moto ya lifelo.

34. Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi.

35. Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te,

36. Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu,

37. Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi,

38. Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo.

40. Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso.

43. Batomboki bakopotaka mbangu mpe mitu na miso na bango mikotala o likolo, mpe mitu mia bango mikozala polele, mpe mitema mikozalaka na eloko te.

46. Mpe basilaki kosala likita lia mabe, kasi likita lia bango wana liyebani(2) epai ya Allah, ata soki likita lia bango lizali makasi ekoki kopanza ngomba te.

47. Мре bokanisa te ete: Allah akozangisa kokokisa elaka naye epai ya batindami naye. Ya soló, Allah azali na nguya тропа kopesa etumbu.

48. Mokolo moye mabele makotikela mabele mosusu esika. Na mapata lokola, mokolo moye bato bakobimaka liboso lia Allah wa bomoko atonda bokasi.

50. В ilamba bia bango bikozalaka nde mbiko(1) mpe moto mokozingaka bilongi bia bango.

51. (Nyoso wana) ekozala mpo Allah akofutaka moto nyoso engebene na maye asalaki. Ya sólo, Allah azali mbangu тропа kofuta.

52. Oyó ezali sango mpe liyebisi (kurani) тропа bato bakeba na yango, mpe bayeba ya sólo ete, ye Nzambe (Allah) azali sé ye moko, na yango esengeli na bato ya mayele basosola.