عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Stoneland, Rock city, Al-Hijr valley [Al-Hijr] - Lingala translation

Surah Stoneland, Rock city, Al-Hijr valley [Al-Hijr] Ayah 99 Location Maccah Number 15

1. Alif, lâm, râ.(1) oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.

3. Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.

9. Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango.

13. Bakondimaka na yango te,(1) mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.

20. Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te.

21. Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli.

23. Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani.

25. Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi.

28. Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.

29. Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi.

32. Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te?

33. Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.

34. Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu.

36. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami.

37. Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami.

41. (Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai.

45. Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba.

47. Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana.

51. Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm.

53. Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.

54. Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?

55. Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.

57. Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini?

60. Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.

61. Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth,

63. Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.

68. Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te.

69. Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te.

70. Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?

71. Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi.

72. Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango.

73. Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi.

74. Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi.

75. Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona.

76. Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso.

79. Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene.

82. Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia.

83. Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka.

84. Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te.

87. Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo(1) тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene.

88. Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi.

90. Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli(1),

91. Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango,

94. Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah).

95. Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo.

97. Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba.