عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Bee [An-Nahl] - Lingala translation

Surah The Bee [An-Nahl] Ayah 128 Location Maccah Number 16

1. Mokano mwa Allah ezali koya, kasi bowelisa yango te. Nkembo naye azali likolo koleka na maye bazali kosangisa ye na yango.

2. Azali kokitisa ba anzelu na emoniseli (buku) na mokano naye, likolo ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye ete: Bokebisa ete ezali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ngai, na yango bobanga ngai.

4. Akeli moto na litanga ya mayi (ya mokongo), sima na yango moto akomi kotia tembe.

5. Mpe akeli тропа bino bibwele, na yango bozali kozua ba mposo pona kosala bilamba na ba bolamu misusu, mpe misusu pona kolia.

6. Mpe esepelisaka bino na bonzenga tango bozongisaka yango na ndako na pokwa, mpe tango bobimisaka yango (na tongo) тропа kólia matiti.

7. Mpe (bisusu) bizali komemela bino mikumba kokende na yango mboka bisusu biye bizali paši тропа bino кокота. Ya soló, Nkolo wa bino azali wa ngolu atonda mawa.

8. Mpe bampunda na ba bighal(1) na ba hamir(2) mpo bomatela yango na botamboli, mpe misusu mizali sé кака тропа bonzenga. Мре azali kokela maye bino boyebi te.

10. Yende akitisaka mayi kowuta na mapata тропа komela, mpe ezali kobotisa matiti na milona oyo bozali koleisa na yango bibwele,

14. Mpe ye nde akeli ebale, okati na yango bozali kozua mișuni ya kitoko ya kolia, mpe bozali kozua okati na yango bonzenga ya molato, mpe okomona masuwa ya minene mazali koleka na ebale na lokito ya makasi, mpo ete boluka mapamboli naye, mpe mpo ete na yango bokoka kotondo (ye).

15. Mpe apika bangomba o kati na mabele тропа boningani na yango esala bino mabe te, mpe mingala na banzela, mpo bokoka kokambama.

16. Mpe na bilembo bisusu (bizali kolakisa bino nzela), ndenge moko minzoto mpo ete babunga te.

18. Mpe soki bolingi kotanga bolamu bwa Allah, bokokoka koyeba motango mwa yango te, ya solo Allah azali molimbisi atonda ngolu.

19. Mpe Allah ayebi maye bozali kobomba na maye bozali komonisa polele.

22. Nzambe wa bino (Allah) azali Nzambe sé moko ya kobondela na bosôló, mpe baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, mitema mia bango miboya bomoko bwa Allah, mpe batondi na lolendo.

27. Sima o mokolo mwa suka, akokitisa bango na kosila lokumu, (na lolenge ya mabe) mpe sima akolobaka na bango ete: Wapi bambanda na ngai oyo bozalaki kobunda тропа bango? Bato ya mayele bakolobaka été; ya soló, mabe ekokitisama lelo epai ya bapagano.

30. Mpe babangi Allah bakotunama été: Eloko nini Nkolo wa bino akitisi? Bakolobaka: Bolamu, тропа baye babongisaki na bomoi ya nsé na kosala bolamu, kasi efandelo ya mokolo mwa suka nde ezali kitoko koleka, oyo nde ndako ya malamu тропа babangi.

37. Ata ozali kosala ndenge nyoso mpo bakambama, ya soló, Allah akambaka baye babunga te mpe bakozua moto ya kosalisa mpe kolongisa bango te.

46. То mpe ezua bango na ngonga ya misala na bango mpo bazua nzela ya kokima te.

47. To bobangi (bwa makasi kowuta epai ya Nkolo wa bango ezua bango) ya soló, Nkolo wa bino azali na ngolu atonda mawa.

48. Boye bazali kornona te ete maye manso Allah akela, bililingi na yango bitelama alima na ngambu ya loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, nyoso bizali kofukamela Allah na limemia mpe nakomikitisa?

50. Bazali kobanga Nkolo wa bango oyo azali o likolo lia bango, mpe basalaka maye akotindaka bango.

52. Mpe manso mazuami o nsé mpe o likolo mazali ya ye, mpe limemia nyoso ezali ya ye. Na yango, boye bokobanga eloko mosusu kotika Allah?

53. Mpe binso bia malamu biye bozali na yango eutaka sé epai ya Allah. Sima soki mabe mazui bino, bokobelelaka sé ye na mongongo ya makasi.

54. Mpe soki alongoli mabe mana likolo lia bino, okomona basusu kati na bino babandi kosangisa Nkolo wa bango.

56. Мре bazali kolongola ndambu ya bozui oyo topesi bango тропа kopesa yango na banzambe ya bikeko oyo bayebi te. Na nkombo ya Allah; bokotunama na maye bozali kosala.

57. Mpe bazali kopesa Allah bana basi, nkembo naye! Kasi bazali komipesa oyo bango moko balingi.

58. Mpe soki bapesi moko wa bango sango ya mbotama ya mwana mwasi, abebisi elongi naye mpe atondisi yango na mpizoli.

62. Mpe bazali kobonzela Allah maye bango moko bazali kolinga yango te, mpe bazali kobimisa lokuta na minoko mia bango été: Bakozala na lifuta lia kitoko. Esika na bango ekozala na moto mpe bakozala bato ya liboso ya komema bango noki noki.

63. Na nkombo ya Allah, tosilaki kotinda (bantoma) na bituka ebele liboso nayo, kasi satana abongiselaki bango misala ya mabe, mpe ye azali mokonzi wa bango lelo, kasi mokolo ya lobi bakozala na etumbu ya makasi.

66. Мре ya soló, тропа bibwele, ezali liteya monene тропа bino, tozali komelisa bino biloko biye bizali na mabumu na yango bisangani na makila, mpe ebimisi miliki ya kitoko mpe elengi тропа komelisa bino.

68. Mpe Nkolo wayo akitisaki mayele epai ya ba nzoi été: Bozua bisika ya kofanda na bangomba mpe okati ya banzete, to mpe bisika bisusu oyo bato basali.

69. Mpe sima bolia bambuma nyonso mpe holanda ba nzela ya Nkolo wa bino oyo atieli bino yango na bolembu, na mabumu na yango, mafuta ezali kobima ya balangi ndenge na ndenge mpe elengi тропа komela, mpe na kati na yango ezali libiki тропа bato. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bato bakoka kososola.

75. Allah asilaki kobeta ndakisa ya mowumbu oyo azali epai ya Nkolo waye azali kokoka kosala eloko te, na oyo topesi ye bozui ya malamu mpe bozui wana azali kobimisa yango тропа Allah, na kobombama mpe na polele. Boye bakokani? Lokumu na Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.

80. Allah nde atiela bino bandako ezala esika ya kovanda, mpe apesi bino ba ndako misusu oyo esalami na mposo ya nyama bomemaka yango na tango ya mobembo, mpe botelemisaka yango na bopemi na bino na nzela, mpe as’wâfi(1) na yango, mpe aw’bâri(2) na yango, mpe ach’âri(3) na yango, ezali biloko oyo ezali kosalisa bino mpe bozali kosepela na yango kino tango eye eyebani.

81. Mpe na maye Allah akela, atieli bino bililingi mpe atieli bino bisika ya kobatama na bangomba, mpe apesi bino bilamba bizala kobatela bino na molunge, mpe misusu mizali makasi mikobatelaka bino na makambo na bino moko ya botomboki. Ndenge wana nde (Allah) azali kokokisa bolamu naye likolo lia bino mpo bokoka kotosa (komisokia).

82. Soki baboyi bapesi mikongo, ya soló penza, yo ozali na eloko mosusu te sé okomisa sango ya polele.

84. (Мре kanisa) mokolo moye tokobimisa umma(1) nionso na nzeneneke likolo na bango, mpe bapengwi bakozala na ndingisa te ya kosenga bolimbisi mpe bakotunama te тропа kozongela (makambo maye basalaki oyo epesaki Allah kanda).

90. Ya soló, Allah azali kotinda na bosembo mpe kosala misala milamu, mpe kosalisa libota. Kasi apekisi kosala mabe ya minene lokola: (Kosangisa ye na eloko mosusu, koboma moto na bosôló te, ekobo, moyibi), apekisi mpe botomboki, azali kolendisa bino mpo ete bokanisa.

92. Mpe bozala te lokola mwasi oyo afungoli liputa naye wana asila kokanga yango makasi. Mpe bozali kozua yango lokola nzela ya kokosana bino na bino, mpo umma(1) moko limoni été yango ezali na makasi mpe ebele koleka baninga ya umma(1) mosusu, Allah azali komeka bino na yango. Мре ya soló, akomonisa bino o mokolo ya suka maye bozalaki kokabwana (na yango na mokili).

94. Mpe bozua bandayi na bino te ezala nzela ya komikosa kati na bino na bino, noki te bokoselumwa na bino bozalaki ya kotelema ngui (na bosóló) mpe bokozua na yango mabe. Na ntina été bozalaki kobundisa nzela ya Allah, mpe bokozala na etumbu ya monene.

96. Oyo bozali na yango ekoleka mpe ekosila, kasi oyo ezali epai ya Allah ekotikala libela. Mpe tokofutaka baye bakangaki. mitema lifuta lia bango lilamu тропа maye basalaki.

100. Ya solo, bokonzi naye ezali likolo na baye bazali kozua ye lokola mobateli mpe тропа ye bakomi basangisi (Allah na binzambe nzambe).

102. Loba: Ezali nde molimo monsatu azali kokita na yango kowuta epai ya Nkolo wayo na bosembo nyoso, тропа kolendisa baye bandima mpe yango ezali (buku) bokambi mpe sango elamu тропа bamizilima (bandimi).

103. Мре toyebi penza ya soló, bazali koloba été: Moto moko boye azali kotangisa ye makambo oyo (kotangisa ntoma kurani), nzoka moto wana bazali kolobela azali na lokota mosusu, kaši buku oyo ezali na lokota ya arabe ya polele.

110. Kaši тропа baye batikaki mboka ya bopagano bakei na mboka ya boyambi sima ya komekama na bango, тре babundaki тропа Allah тре bakangaki mitema тре bayikaki mpiko, ya sólo, Nkolo wayo na sima na yango azali molimbisi atonda mawa.

113. Mpe motindami asilaki koyela bango kowuta na bango moko, mpe baboyi kondimela ye mpe etumbu ezuaki bango mpo bazalaki babubi.

115. Ya sólo, apekisaki bino (kólia) mișuni mia bibembe (nyama oyo bakati kingo te) na makila na mosuni mwa ngulu(1) na nyama eye bakati kingo kasi batangi nkombo ya Allah likolo na yango te. Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia kasi atomboki to alekisi ndelo te ya solo penza, Allah azali molimbisi atonda mawa.

117. Bakosepelaka na mwa tango moke, mpe etumbu ya makasi ezali kozela bango.

120. Ya solo, Ibrâhîm azalaki umma(1), azalaki na botosi тропа Allah, amipesaki mobimba epaî ya Allah тре azalaki o kati ya baye bazalaki kosangisa te (Allah).

121. Azalaki na botondi тропа bolamu bwa Nkolo waye, (mpe Allah) aponaki ye mpe akambaki ye na nzela ya semba.

126. Mpe soki bokozongisa mabe, bozongisa yango ndenge moko na oyo basalaki bino. Kasi soki bokangi mitema, wana ezali malamu mingi тропа bakangi mitema.

127. Kanga motema, kasi kokanga motema nayo ekowuta nde epai na Allah. Mpe komitungisa te тропа bango, тре kominyokuama te тропа likita na bango ya mabe.