عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The night journey [Al-Isra] - Lingala translation

Surah The night journey [Al-Isra] Ayah 111 Location Maccah Number 17

1. Lokumu na oyo asalisaki mowumbu naye (ntoma Muhammad) mobembo mwa butu, kobanda na ndako esantu ya Makkah kino na ndako esantu ya Aq’swa (yelusaleme) oyo tosilaki kopambola zinga zinga na yango mpo été tolakisa ye bilembo bia biso, ya sôló ye azali moyoki amonaka manso.

2. Мре topesaki Mûssa buku, mpe totiyaki yango ezala bokambi тропа bana ba isalayele, mpe toyebisaki bango été bozua mobateli mosusu te kotika ngai.

8. Tango mosusu Nkolo wa bino akoyokela bino mawa. Mpe soki bozongeli tokozongela, tosalaki moto mwa lifelo тропа bapengwi baye bazangaki kotosa.

11. Mpe moto azali komilukela mabe, (komisengela mabe) ndenge amilukelaka bolamu, kasi moto azali penza na bowelisi.

16. Mpe soki tolingi koboma mboka moko boye, totindaka na bazwi na yango batosa mibeko mia biso, kasi soki baboyi kotosa mpe babebisi, mpe sima na yango esengeli ete liloba likokisama, mpe tobomi bango mobimba.

18. Oyo alingi azua bomoyi na lombango, tozali mbangu тропа kopesa ye oyo tolingi, sima tokopesa ye móto mwa lifelo oyo akozika okati na yango, na kosila lokumu, mpe na kozala mosika na ngolu.

23. Mpe Nkolo wayo asilaki kozua mokano ete; Bobondela te sé ye mei, mpe bozala malamu na ba boti na bino. Soki kimobange ekomeli moko kati na bango mibale na maboko nayo to bango banso babale kofiotola bango te, mpe kotombokela bango te, kaši žala na bango malamu тре lobela bango maloba ya kitoko,

24. Mpe тропа mawa, kitisela bango lipapu ya ngolu mpe oloba ete: Oh Nkolo wa ngai! Yokela bango mawa ndenge babokoloki ngai uta mwana токе.

25. Nkolo wa bino ayebi malamu penza maye mazali o kati ya mitema mia bino, soki bozali bato malamu, ya soló azali molimbisi тропа baye batubelaka.

26. Mpe pesa bato ya libota nayo makoki na bango, mpe mobola, mpe moleki nzela, biye bisengeli тропа bango, kasi kolekisa ndelo te na kobebisa misolo pamba pamba.

29. Мре kokanga maboko nayo na kingo koleka te, (na kimopimi) mpe kotanda yango te koleka, noki te okomikuta okati ya batungisami mpe bato ya mpasi.

36. Мре kolandaka te, (kotelema тре kolobela) maye ozali na boyebi bwa yango te, mpo été ya soló, boyoki, bomoni na motema nyonso wana akotunama тропа yango.

37. Мре kotambola o likolo lia mabele na lolendo te, solo okoki kopasola mabele te, mpe okoki кокота molai lokola bangomba te.

41. Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe.

48. Tala ndenge bazali kobetela yo bandakisa, basili kobunga, bakokokaka lisusu te kolanda mpe kozua nzela ya bosôló.

52. O mokolo moye akobengaka bino, bokoyanolaka ye na bopesi ye lokumu, bokokanisa ete bowumela na mabele te sé tango moke.

54. Nkolo wa bino ayebi bino malamu koleka, soki alingi akoyokela bino mawa, soki mpe alingi apeși bino etumbu. Мре totindaki yo te ozala mobateli likolo na bango.

56. Loba: Bobelela banzambe wana bozali kozua na botiki ye, bazali na makoki te ya kolongola bino mabe mpe bazali na makoki te ya kopekisa yango ete ezua bino.

57. Baye bazuaki bango ba nzambe, bango moko bazali koluka eloko nini bakosala epusanisa bango penepene na Nkolo wa bango mpe bazali kolikia ngolu naye mpe bazali kobanga etumbu naye. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ezali ya kobanga mpe ezali na tembe te.

59. Eloko moko te ekopekisa biso тропа kotinda bikamwisi, sé bato ba kala baboya yango, mpe topesaki na bato ya Thamûd náqat oyo (ezalaki ekamwisi) ya polele, kasi basalaki yango mabe (babomaki yango), kasi totindaka bikamwisi te sé тропа kobangisa.

62. Alobi lisusu ete: Omoni moto oyo öpesi ye lokumu koleka ngai, soki otiki ngai na mokili kino mokolo ya suka, na kobungisa ebele kati na mabota naye na bakitani naye, longola sé токе kati na bango.

63. Mpe (Allah) alobi: Kende, oyo akolanda yo o kati na bango, ya sólo, moto ya lifelo nde lifuta lia bino liye likotalaka bino.

64. Мре tombokisa bango na mongongo nayo ba oyo okokoka kati na bango, mpe tinda mapinga nayo ya ndenge na ndenge likolo na bango, mpe sangana na bango na kati ya misolo na bango mpe na bana na bango, mpe pesa bango elaka. Kasi satana azali sé kopesa bango elaka ya lokuta.

65. Ya soló, тропа bawumbu na ngai, okokoka bango te. Kasi Nkolo wayo akoki тропа kobatela bango.

66. Nkolo wa bino nde oyo atiela bino masuwa likolo ya ebale, bozali kotambola na yango тропа koluka litomba naye. Ya sólo, ye azalaka na mawa na bino.

67. Mpe soki mabe ezui bino o kati ya ebale, botiki maye bozalaki kobondela mpe bozongeli ye, mpe soki abikisi bino abimisi bino na mayi bokomi na mokili, bozongeli lisusu oyo bozalaki na yango liboso. Kasi ya sólo penza, moto azali sé na bopengwi.

75. Nde tolingaki kopesa yo etumbu ya bomoyi mbala mibale mpe etumbu ya liwa mbala mibale lokola, mpe okokaki kozua mosungi mosusu te na botiki biso.

77. Ezaleli mpe nzela ya baye totindaki bango liboso nayo kati na batindami na biso, mpe okokuta mbonguana te na mibeko mia biso.

79. Mpe okati na butu otelema тропа kosambela (losambo ya suna) nayo moko, mpo ete Nkolo nayo asekwisa yo o mokolo ya suka na esika ya lokumu.

80. Мре loba ete: Oh Nkolo na ngai! Kotisa ngai na esika ya malamu, mpe bimisa ngai na esika ya bosembo, mpe pesa ngai esika ya mapamboli uta epai nayo.

86. Mpe soki tolingi, ya soló, tokobungisa oyo tokitisaki epai nayo kati na emoniseli mpe okozua mobateli mosusu te тропа yango na botiki biso.

87. Longola sé mawa kowuta epai ya Nkolo wayo. Ya sólo, bolamu bwaye epai nayo ezali ebele.

97. Mpe oyo Allah akambi, asili kokambama, mpe oyo akobunga, okokoka te kozuela bango bakambi na esika naye (Allah) mpe tokosangisa bango o mokolo ya suka bilongi bisunduami, miso ya kozipama, matoyi makangami, na minoko mikolobaka te, esika na bango nde lifelo. Tango nyoso moto na yango elingi kokita, tokobakisela bango oyo ya makasi koleka.

102. Alobi: Ozali koyeba malamu penza ete oyo akitisaki yango sé Allah Nkolo ya likolo na mabele, тропа (kokamwisa) тре bokasi naye, тре ngai nazali kokanisa ete yo eh falo! O sili kobunga nzela elamu.

105. Mpe na bosembo penza nde tokitisaki yango (kurani) mpe ekitaki na bosôló, mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango elamu mpe mokebisi.

106. Мре (tokitisaki) kurani biteni biteni mpo ete otanga yango malembe likolo ya bato bayoka, mpe tokitisaki yango mikapo na mikapo.