The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe cave [Al-Kahf] - Lingala translation
Surah The cave [Al-Kahf] Ayah 110 Location Maccah Number 18
1. Matondi na Allah oyo akitisaki epai ya mowumbu waye buku, oyo ezali na mbilinga mbilinga kati na yango te. (ezali na bokeseni te).
2. (Buku) ya semba тропа kokebisa na etumbu ya makasi kowuta epai naye, mpe kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete: Ya soló, bakozala na lifuta ya kitoko.
3. Kuna, bakovanda libela kati na yango.
4. Мре kokebisa baye bazali koloba: Allah azali na mwana.
5. Bazali na boyebi na yango te lolenge moko na batata na bango, liloba ya mabe ezali kobima na minoko mia bango. Manso bazali koloba ezali sé lokuta.
6. Ozali komitungisama na mpasi ete baboyi kondima na lisolo oyo.
7. Ya soló, maye mazuami o likolo ya mabele, totiyaki yango ezala na bonzenga na yango mpo été ezala bomekami epai ya bato mpe totala nani kati na bango akosala bolamu.
8. Mpe ya sólo, na sima tokobalola yango mpe ekomi makasi, etikali polele ezali na eloko te (mabele oyo ezali na milona te).
9. Okanisi ete bato ya kati ya mobengá na bato ya ar-raqím(1) bazalaki kati ya bilembo na biso ya kokamwa?
10. Tango bilenge babatamaki o kati ya mobéngá balobaki été; Oh Nkolo wa biso! Zipa biso na ngolu nayo, mpe sembola biso na makambo na biso nyoso.
11. Mpe tokangaki matoyi na bango mibu miyike okati ya mobengá.
12. Sima, tosekwisaki bango mpo toyeba lisanga nini kati na bango mibale bayebi motango ya mibu miye basalaki wana.
13. Tozali kobetela yo sango na bango na bosóló. Bazalaki bilenge baye bandimaki na Nkolo wa bango mpe tobakiselaki bango bokambami.
14. Мре tolendisa mitema mia bango, tango batelemaki mpe balobaki: Nkolo wa biso nde Nkolo wa likolo na mabele, tokobelela banzambe basusu te na esika naye, soki te tokoloba mabe mpenza.
15. Tala bato na biso oyo bazui banzambe misusu na botiki ye, pona nini te bazali komema elembetele ya polele nani azali moto mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta?
16. Mpe tango bokokabwana na bango na maye bazali kobondela na esika ya Allah, bokota o kati ya mobengá тропа komibatela, Nkolo wa bino akokitisela bino ngolu naye mpe akobongisa makambo na bino.
17. Mpe okomona moyi ebimi ezali komata etiki Mobengá na bango na loboko ya mobali, mpe soki ekomi kokita ezali kotika mobengá na loboko ya mwasi, mpe bango bafandi malamu na kati na kimia, wana ezali moko ya bikamwisi ya Allah, moto oyo Allah akambi ye nde akambemi malamu, mpe oyo asili kobunga, okoki te kozuela ye mokambi.
18. Mpe okokanisa bazali ya kolamuka nzoka nde basilaki kolala. Mpe tozali kobalola bango na ngambo ya mobali mpe na ngambu ya mwasi, mpe mbwa na bango atandaki maboko naye na ekoteli ya mobengâ, soki okutanaki na bango olingaki kopesa mokongo na kokima na kobanga.
19. Mpe ndenge wana nde tosekwisaki bango bazali kotunana bango na bango, moko kati na bango atunaki: Bovandi ngonga boni wana? Banzongisi: Tovandi mokolo to ndambu ya mokolo. Basusu bakolobaka: Nkolo wa bino ayebi malamu (boni) boyandaki, botinda moko wa bino na misolo mia bino na mboka, mpo atala biloko nini bia malamu ayela bino yango boliya, mpe asala na ndenge été bato bayeba bino te.
20. Ya soló, bango soki bazuaka bino, balingaki koboma bino na mabanga to balingaki kozongisa bino na lingomba lia bango, тре bolingaki kolonga te.
21. Mpe ndenge wana tobimisaki makambo na bango polele epai na bato mpo bayeba été elaka ya Allah ezali ya solo, mpe été mokolo ya suka ezali na tembe te kati na yango, tango bato ya mboka bazalaki kosuana тропа likambo na bango (bilenge baye bazalaki kati ya mobengâ), mpe balobaki: Botonga likolo na bango ndako ya monene, Nkolo wa bango ayebi bango malamu koleka, kasi ba oyo balongaki kati na kosuana wana balobi tokotonga likolo na bango esika ya kosambela. (masdjid)
22. Mpe bazalaki koloba été; bazali misato na mbwa na bango minei, mpe bazalaki koloba na bokeseni na kobombama kati na bango ete: Bazalaki (bilenge) mitano na mbwa na bango motoba, mpe bazalaki koloba lisusu été; bazali sambo na mbwa na bango mwambe; loba: Nkolo wa ngai ayebi koleka malamu motango mwa bango, sé moke nde baye bayebi yango, kasi kosuana na bato te тропа likambo yango, sé oyo ezali котопапа polele, mpe kotuna bato te тропа bozindo na yango.
23. Mpe koloba te тропа eloko ete: Ngai nakosala yango lobi.
24. (Kasi okoloba nde été:) soki Allah alingi, na sima okanisa Nkolo wayo soki obosanaki mpe oloba ete: Nazali kolikia été Nkolo na ngai akamba ngai mpe atia ngai penepene na oyo ezali ya bosóló.
25. Мре bawumelaki па kati ya mobengâ wana mibu nkama misato mpe babakisaki libua.
26. Loba: Allah ayebi malamu boni bawumelaki wana, ayebi mabombami ma likolo na ya nsé, lokola amonaka yango mpe ayokaka. Bazali na (mosungi) mosusu te sé ye, mpe azali na mosangisi te na motindo mwa ye.
27. Mpe tanga maye makiteli yo okati ya buku ya Nkolo nayo, eloko moko te ekoki kobalola liloba lia ye, mpe okozua esika mosusu ya kokimela te sé epai naye.
28. Mpe kanga motema elongo na baye bazali kobondela Nkolo wa bango tongo mpe pokwa, balingi (kornona) elongi naye, kasi kolongola miso likolo na bango te, тропа (koluka) bonzenga na bomoyi ya nsé, mpe kotosa te oyo motema naye esila kobosana liteya na biso mpe azali kolanda bamposa naye ya nzoto, mpe ezaleli naye ezali mabe.
29. Mpe loba: Bosembo ezali nde epai ya Nkolo wa bino, oyo akolinga andimi na yango, oyo mpe akoboya apengui na yango. Ya soló, tosili kolengele тропа babubi moto oyo ekozinga bango na kopela, mpe soki basengi mayi ya komela, bakomelisa bango mayi ya mabende mayanguami na moto, ezali kozikisa bilongi na bango. Oyo mayi ya mabe ya komela mpe efandele ya mabe!
30. Soló, тропа baye bandimaki mpe basalaki bolamu, ya solo penza tokobungisaka te lifuta lia oyo asalaki bolamu.
31. Bango nde bakozalaka na elanga ya (lola) ya edeni libela biye bizali kolekisa o nsé na bango mingala, bakolata bawolo na maboko na bango mpe bakolata bilamba bia fafala ya langi ya mayi ya pondu, mpe bakofanda likolo ya kiti ya kitoko, oyo lifuta ya malamu mpe esika ya kitoko ya kofanda!
32. Pesa bango ndakisa ya bato mibale, moko na bango to pesaki ye bilanga mibale ya Ânâb(1) mpe tozingaki yango na banzete ya Nagh’l,(2) mpe totiaki kati kati ya bilanga mibale wana milona.
33. Bilanga binso mibale bizali kobota malamu, na bozangi eloko te mpe tobimisaki miluka kati kati na yango.
34. Mpe bizalaki na bambuma, alobi na moninga waye: Naleki yo na bomengo mingi, mpe nazali na makasi koleka yo, mpo nazali na bato ebele.
35. Мре akotaki na bilanga bia ye na komibuba ye moko, alobi: Nayebi ete oyo ekoki kobeba te.
36. Mpe nandimi te ete mokolo ya suka ekoya, mpe soki bazongisi ngai epai ya Nkolo wa ngai, nakokuta ya kitoko koleka (bilanga) oyo.
37. (Moninga waye ayebisi ye): Okopengwa na oyo akelaki yo na mabele, sima na mayi ya mokongo sima abimisi yo moto?
38. Kasi тропа ngai; Allah azali Nkolo wa ngai, nakosangisa Nkolo wa ngai na eloko te.
39. Tango okotaki na elanga nayo, soki olobaki été: Oyo bolingo ya Allah, nguya ezali te, makasi mpe ezali te sé epai ya Allah. Soki ozali kornona été: Nazali na bozui токе mpe bana ebele te.
40. Ekoki kozala ete Nkolo wa ngai, kala te akoki kopesa ngai ya malamu koleka bilanga bia yo, mpe akoki kotindela yango (bilanga nayo) etumbu kowuta o likolo mpe ekomi mabele mpe putulu.
41. То mayi та yango makokauka mpe okokuta yango te.
42. Мре milona mia ye mibebisami o bisika binso тре акотакі kobukabuka maboko naye na ntina na oyo abimisaki тропа bilanga oyo, тре nyoso ebebisami, тре alobi: Eh ngai! Mawa na ngai soki nasangisaki Nkolo wa ngai na eloko te.
43. Azuaki ata bato ya kobikisa ye na (etumbu) ya Allah te, mpe ye moko akokaki komibikisa te.
44. Ebateli ya soló sólo ezali nde ya Allah. Apesaka mbano ya malamu mpe suka ya malamu.
45. Mpe betela bango ndakisa ya bomoyi bwa mokili, ezali lokola mayi maye tozali kokitisa kowuta o likolo, mpe esangani na milona mia mabele, mpe ekomi matiti ya motawu, mopepe ekaboli yango, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
46. Bomengo mpe bana, ezali bisengo ya nsé, kasi misala ya malamu miye misilaka te, yango nde ezali na lifuta ya malamu mpe elikia ya kitoko epayi ya Nkolo nayo.
47. Mpe mokolo moye tokotambwisaka bangomba, okomona mabele ekotandama polele, mpe tokosangisa bango mpe tokobosana moko te.
48. Мре bakotelemaka molongo liboso lia Nkolo wayo, boyeli biso lolenge tokelaki bino mbala ya yambo, kasi bokanisaki ete tokokokisela bino elaka te?
49. Mpe bakotiyaka buku (ya moto na moto) mpe okomona batomboki bazali kobanga maye makomami na kati, mpe bakolobaka: Mabe na biso, buku eye etikaki eloko te, ezala moke to ya monene sé ekomaki yango. Mpe bakokutaka maye basalaki polele, kasi Nkolo wayo abubaka moto te.
50. Mpe tango tolobaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki, longola sé satana azalaki kati ya ba djini mpe aboyaki kotosa mobeko mwa Nkolo wa ye. Boye bokozua ye na libota lia ye mpo bazala babateli na botiki ngai mpe bazali banguna ya bino? Oyo коропа ya mabe тропа babubi!
51. Nazuaki bango te banzeneneke na bokeli mapata na mabele, ndenge moko kokelama na bango, mpe na koki te kozua babungisi тропа kosalisa nga.
52. Mpe o mokolo moye akolobaka: Bobenga basangani na ngai baye bolikiaki, bakobengaka bango kasi bakoyanolaka bango te, mpe tokotiyaka kati kati na bango libulu lia bobungisi.
53. Mpe batomboki bakomonaka moto, mpe bakondimaka ete bakokweya na yango, kasi bakozuaka esika ya bokimi te.
54. Mpe ya soló, tosilaki kolimbola na kati ya kurani eye bandakisa ya ndenge na ndenge тропа bato, kasi moto aleki sé kotia tembe.
55. Kasi nini epekisaki bato bandima, tango bokambi(1) boyelaki bango, mpe basenga bolimbisi epai ya Nkolo wa bango? Sé oyo ekomelaki bankoko ba bango eyeli mpe bango, to etumbu ya lolenge nyoso eyela bango?
56. Mpe totindaka batindami sé тропа bopesi sango malamu mpe bokebisi. Kasi baye bapengwa bazali kosuanisa bosembo na lokuta na bango, тропа kobebisa. Mpe bazuaki mikapo mia ngai na maye bakebisamaki na yango na litio.
57. Nani azali moto mabe koleka oyo apesi mokongo na bilembo bia Nkolo waye tango bazali koteya ye yango,, mpe abosani maye maboko (mibale) naye masalaki? Tozipi mitema mia bango ete basosola te, (bayeba kososolo kurani te) mpe matoyi na bango makangami, тре soki obengi bango na bokambami, bakokambama soki токе te.
58. Мре Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa, soki alingi kozua bango na maye basalaki akoyela bango etumbu noki, mpe bazali na elaka asilaki kotiela bango oyo soki ekoki, bakozua esika ya kokimela te.
59. Mpe wana nde bamboka eye tobomaki tango bato ba yango babubaki, mpe tosilaki kopesa elaka ya bobebisami na bango.
60. (Kanisa) tango Mûssa alobaki na mosali waye ete: Nakotelema te kino nakoma na esika bibale mibale bikutani, to natambola mibu miyike.
61. Mpe tango bakomaki wana, babosanaki mbisi na bango, oyo alandaki nzela naye kati na ebale.
62. Mpe tango bango banso babale baleki (esika) ena, alobi na mosali waye: Yela biso biloko bia biso ya kolia, tosili kolembe na mobembo mwa biso moye.
63. (Elenge wa ye) alobaki: Omoni tango tofandaki pene ya libanga ya monene nabosanaki mbisi kuna, satana nde abosanisi ngai mpo nakanisa yango te, mpe (Mûssa) azongaki sima тропа kolanda nzela ya ebale na kokamwa.
64. (Mûssa) alobi: Wana nde oyo tozalaki koluka, mpe babongoli makolo ma bango balandi bilembo bia yango bazali kosolola.
65. Mpe bakutaki mowumbu wa biso, oyo topesaki ye ngolu ma biso, mpe totangisaki ye boyebi bonene.
66. Mûssa ayebisi ye: Boye nalanda yo mpo otangisa ngai boyebi boye otangisama ya bosôló?
67. (Moto wana) alobi na Mûssa ete: Okokoka kokanga motema elongo na ngai te.
68. Ndenge nini okokoka kokanga motema na maye (makambo) oyo ozali na boyebi na yango te?
69. (Mûssa) alobi: Na bolingi bwa Allah, okomona ngai na kangi motema. Mpe nakoboyaka mobeko nayo ata moko te.
70. Alobi: Soki olandi ngai kotuna ngai eloko te kino nakoyebisa yo ntina na yango.
71. Bakei bango mibale, tango bamati na masuwa (bwato) abebisi yango, (Mûssa) alobi: Obebisi yango mpo ozindisa bakolo na yango? O sali mpenza likambo linene!
72. (Wana) alobi: Nayebisaki yo te ete: Okokoka kokanga motema te elongo na nga?
73. (Mûssa) alobi: Kornona ngai mabe te na ndenge nabosani, mpe kotelema makasi te тропа likambo lia ngai.
74. Bakei bango banso babale, kino bakutanaki na mwana mobali, mpe abomi ye. (Mûssa) alobi: Obomi moto sé pamba boye, oyo asali eloko te? Osali soló mabe monene.
75. (Moto wana) alobi: Nayebisaki yo te ete okokoka kokanga motema elongo na ngai te?
76. (Mûssa) alobi: Soki natuni yo lisusu eloko sima na yango, osili kozua nzela тропа kokabuana na ngai. Okolimbisama тропа kokabuana na ngai.
77. Bakei bango babale kino bakomi na mboka ya bato, batuni bayamba bango na biloko ya kolia, baboyi koyamba bango. Mpe bakutaki kati na yango efelo elingi kokweya, (moto wana) atomboli yango, (Mûssa) alobi; Soki olingaki mbele osengaki lifuta тропа yango.
78. Alobi ete: Oyo nde bokabwani kati kati na ngai nayo, nakolimbolela yo maye okokaki kokanga motema te.
79. Mpona masuwa (bwato), ezalaki ya babola basalaka na yango na ebale. Nabebisaki yango mpo sima na bango ezalaki na mokonzi moko mobubi azalaki kobotolo ba bwato nyoso ya kitoko.
80. Mpe mpona mwana mobali, azalaki na baboti baye babale, bazalaki bandimi, tobangaki (soki akoli) akobebisa bondimi bwa bango na botomboki na bopengwi.
81. Tolingaki ete Nkolo wa bango mibale apesa bango mwana mosusu ya malamu, apetwama mpe ya boboto esika naye.
82. Mpe mpona efelo, ezalaki ya bana bitike babale kati na mboka wana, o nsé na yango ezalaki na bomengo na bango, kasi tata wabango azalaki (moto) malamu, Nkolo wa yo alingaki ete soki bakoli babimisa bomengo bwa bango bona na mawa ma Allah. Nasalaki yango na mitindo mia ngai moko te. Wana nde ndimbola ya maye okokaki kokanga na yango motema te.
83. Mpe bazali kotuna yo mpona Dzu-al-Qarnaïn,(1) loba: Nakotangela bino mwa bokundoli moke.
84. Ya soló, tolendisaki bokasi bwa ye awa na nsé, mpe topesaki ye nzela likolo ya biloko binso.
85. Mpe alandaki nzela,
86. Kino tango moyi mokokita, akuti yango ekiti na moluka mwa mayi ma moto pene na yango akuti bato, tolobaki: Oh Dzu-al- Qarnaïn! Opesa bango etumbu to osalela bango bolamu.
87. Alobi: Oyó abubaki, tokopesa ye etumbu, sima tokomema ye epai ya Nkolo waye apesa ye etumbu ya somo koleka.
88. Mpe oyo andimaki mpe asalaki mosala ya malamu, ye akozua lifuta lilamu mpe tokoloba naye, (na bopesi) mibeko mia biso mizali pete.
89. Sima alandaki nzela,
90. Kino akomaki na ebimeli ya moyi akutaki (moyi) ezali koleka likolo na bato moko boye topesaki bango eloko te ya komizipa na moyi.
91. Ndenge wana nde ndenge tozipaki boyebi bwa biso na oyo azalaki na yango.
92. Sima alandaki nzela,
93. Kino tango akomaki kati ya ndelo ezwami na kati ya ngomba mibale akuti sima na yango bato baye bazali kososola maloba ya bato misusu te.
94. Balobi: Oh Dzu-al-Qarnaïn! Ya soló, ba ya’djûdj na ba ma’djûdj(1) bazali babebisi na mokili, tokoki te kotiela yo makoki ete opika ndelo kati na biso na bango?
95. Alobi: Oyo Nkolo wa ngai apeși ngai ezali malamu (koleka oyo ya bino) bosalisa ngai na bokasi bwa bino mpe natia ndelo kati na bino na bango, (mpo bakatisa te)
96. В óyela ngai liboke ya übende, mpe tango asilisi kotondisa taka kati na bangomba mibale, alobi na bango ete: Bofula, kino ezuaki moto, alobi na bango ete: Boyela ngai mayi ya übende wana eyanguami nasopa yango likolo.
97. Bakokaki komonisa bokasi te na komata na yango.
98. Alobi: Oyo ezali ngolu kowuta epai ya Nkolo wa ngai, tango elaka ya Nkolo wa ngai ekoyaka, akolalisa yango mpe akosukisa yango, mpe elaka ya Nkolo wa ngai ezalaka solo.
99. Mpe totikaki bazali kotepatepa bango na bango, mpe bakobetaka kelelo mpe tokosangisa bango banso.
100. Мре mokolo mona tokolakisaka bapengwi moto mwa lifelo.
101. Baye miso ma bango mazalaki ya kozipama тропа likanisi na ngai, mpe bazalaki kokoka koyoka te.
102. Baye bapengwa bazali kokanisa ete bawumbu ba ngai bazuela ngai bambanda basusu batika ngai? Ya soló, tolengeli moto mwa lifelo ekozala esika ya kovanda тропа bapengwi.
103. Loba: Boye bolingi toyebisa bino ba nani oyo bazali na bozangi monene koleka kati na misala?
104. Baye misala mia bango mibebaki kati na bomoyi bwa mokili, mpe bazalaki kokanisa ete basalaki bolamu.
105. Baye bana baboyaki kondima na bilembo bia Nkolo wa bango mpe bokutani naye, misala mia bango ebebi, tokotiyelaka bango kilo o mokolo mwa suka te.
106. Moto mwa lifelo mokozalaka lifuta lia bango na maye bapengwaki na yango, basakanaki na bilembo na ngai mpe batindami ba ngai.
107. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, esika ya kovanda na bango ekozalaka na paladizo ya likolo koleka (al firdawsi).
108. Libela kati na yango, bakolikia mbongwana te kati na yango.
109. Loba: Soki ebale ya monene ezalaki lokola mayi ya mokanda, (тропа кокота na yango) maloba та Nkolo wa ngai (Allah), elingaki kokawuka liboso, mpe maloba ya Nkolo nangai esili te, ata soki toyei na ebale mosusu lokola yango mbala ebele.
110. Loba: Ya sólo, nazali moto lokola bino, bakitiseli ngai emoniseli, ya soló Nzambe wa bino azali Nzambe moko, ya soló, oyo asengeli na mabondeli na oyo akolikia kokutana, na Nkolo waye, asala misala milamu, mpe asangisa libondeli lia Nkolo waye na eloko moko te.