عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Cow [Al-Baqara] - Lingala translation

Surah The Cow [Al-Baqara] Ayah 286 Location Madanah Number 2

1. Alif, Lâm, Mîm(1).

2. Buku eye ezali na ntembe te okati na yango ezali kokamba baye babangi (Allah).

10. Okati ya mitema mia bango mitondi na bokono, mpe Allah akobakisela bango bokono ya makasi; mpe bazali na etumbu ya makasi na maye bazalaki kokosa.

18. Bakoyokaka bosembo ata moke te, mpe bakolobelaka yongo ata moke te, mpe bakomona yango ata moke te, mpe bakozongaka na bosembo te.

26. Ya sôló, Allah azalaka na nsoni te ya kopesa ndakisa na eloko songolo oyo ye alingi ata soki ezali eloko moke lokola ngungi to mpe ndakisa mosusu likolo na yango. Mpe mpona ba oyo bandima bazali koyeba ete yango ezali bosembo kowuta epai ya Nkolo na bango. Mpe baye bapengwa, bakoloba ete nini Allah alingi koloba na bandakisa eye? Mpona yango bayike(1) bakozala na bobungi mpe bayike bakokambama, kasi, sé bato mabe nde bazali kobungisama na yango.

30. Mpe tango Nkolo wa yo alobaki na ba anzelu ete: Ya sôló ngai nalingi kotia na mabele mokitani. Bayanolaki ete: Olingi otia kati na mabele oyo akobebisa mpe akosopa makila? Mpe biso tozali kokumisa yo mpe tozali kokumisa bosantu bwayo. (Allah) alobaki ete: Ya sôló ngai nazali na boyebi na maye bino boyebi te.

32. Bayanoli: Lokumu nayo! Tozali na boyebi te kaka na maye otangisaki biso. Ya sôló yo ozali moyebi ya manso mpe otondi na bwanya.

37. Mpe Âdam azuaki maloba ya bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe (Allah) alimbisaki ye, ya sôló ye azali moyoki tubela mpe atonda ngolu.

38. Mpe tolobaki: Bokita bino banso, kowuta nakati na yango!(1) mpe ya sôló tango inso bokambami ekokomela bino uta epayi na ngai, ba oyo bakolanda bokambami bwa ngai, bakozala na bobangi te, mpe bakozala na mawa te.

49. Mpe ntango tobikisaki bino epai ya bato ya falo, bazalaki konyokola bino na bitumbu binene, bazalaki kokata bakingo ya bana na bino mpe bazalaki kotika basi na bino na bomoyi mpe bozalaki na mimekano minene kowuta epai ya Nkolo wa bino.

50. Mpe tango tokabolaki ebale mpo na bino (bokatisa ngambo esusu), mpe ya sôló tobikisaki bino mpe tozindisaki bato ya falo okati ya mayi, na bino bozalaki komona.

61. Mpe bino bokanisa tango bolobaki: Eh Mûssa! biso tolembi kolia bilei sé moko. Bondela na Nkolo nayo (Allah) mpo abimisa pona biso bilei kowuta na mabele ebimisa: Ndunda, maboke, hayi, solo mpe matungulu, alobi: Bolingi bobalola oyo ya malamu koleka na oyo ya mokie? Boye bokita(bokende) na engumba eye bino bolingi, mpe bino ya sôló bokozua oyo bozali kosenga. Mpe minyoko mibetaki bango bozangi, mpe bokono mpe kanda ya Allah ekitelaki bango. Nyonso wana mpo ya sôló bango bazalaka kopengwa na bilembo ya Allah, mpe bazalaki koboma bantoma mpamba. Nyonso wana mpo bazalaka koboya kotosa mpe balekisaki ndelo.

63. Mpe bokanisa mikano miye tozuelaki bino, mpe totombolaki likolo na bino ngomba, bosimba maye topesi bino makasi mpe bokanisa maye mazali na kati na yango mpo ete bozala na bobangi (ya Allah).

65. Mpe ya sôló boyebaki baye oyo balekisaki ndelo na kati ya bino mpona mokolo mwa mposo, mpe tolobaki na bango: bozala bamakako biloko bizangi ntina.

67. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Ya sôló, Allah apesi na bino mobeko ete: Boboma ngombe. Balobaki: yo ozali kozua biso na maseki? (Mûssa) alobaki ete: Na mibateli epai ya Allah mpo ete nazala te na molongo ya bazoba.

68. Balobaki: Sengela biso Nkolo nayo alakisa biso ngombe wana ezali ndenge nini. (Mûssa) alobi: Ya sôló ye Nkolo alobi: Ya sôló ngombe wana ezali mobange te mpe elenge te, ezali na kati kati ya wana. Mpe bosala maye botindami.

69. Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa biso polele langi na yango ezali nini. (Mûssa) alobaki: Ya sôló ye Nkolo na bino alobi: Ya sôló ngombe wana ezali na langi ya mosaka ya makasi(1) esepelisa bato tango bakomona yango.

70. Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa polele ngombe yango, ya sôló, epai na biso bangombe bazali lolenge moko. Mpe ya sôló biso na bolingi ya Allah tokokambama.

71. (Mûssa) alobaki: Ya sôló Nkolo wa bino alobi: Ya sôló ngombe yango ezala te oyo enuni na mosala ya bilanga, ezala te mpe ngombe ya makolo matengama to mabukama te. Balobaki: sika oyo nde olobi bosembo, mpe basasaki yango, pe bazalaki mpenza na posa ya kosala yango te.

72. Mpe tango bobomaki moto, mpe moko na moko kati na bino abandaki koluka koyeba nani mobomi, mpe Allah nde mobimisi maye bino bozali kobomba.

73. Mpe tolobaki:(1) bobeta ye(2) na ndambo na yango,(3) na ndenge wana nde Allah akosekwisa bawei, mpe Allah azali kolakisa bino bilembo biye mpo ete bino bososola.

75. Boye bozali kolikia (bamizilima) ete bato ya motindo wana (bayuda), bakondimela bino? Mpe ya sôló lisanga ezalaki kati na bango bazalaki koyoka maloba ya Allah, mpe babaloli yango sima na bango kozua mayele, mpe bango bazali koyeba?

76. Mpe tango bakokutana (bayuda) na baye bandima (bamizilima), bakolobaka: Tondimi; mpe soki bazali bango na bango (bayuda), bakolobaka: Bokoyebisa bango mpona maye Allah afungoleli bino? Mpo bazala na maloba ya elonga Likolo na bino liboso lia Nkolo wa bino, Boye bozali na mayele te?

77. Boye bazali koyeba te, ya sôló Allah ayebi maye bazali kobomba mpe maye bazali kobimisa polele?

78. Mpe na kati na bango, ezali na baye bayebi kotanga te mpe kokoma te, mpe bayebi buku te, bobele komizwa, mpe bango bazali bobele na makanisi.

85. Sima ya mikano, bobandi kobomana, mpe bozali kobimisa misusu kati na bino na bandako na bango, mpe bozali kosalisa basusu kati na masumu mpe na kimonguna likolo na basusu. Soki bandeko na bino ya lingomba bayeli bino bakangami ya bitumba, bozali kokangola bango na mbongo mpe bino boyebi ete yango ezali lisumu; Pona kobimisa bango. Bozali kondima na ndambu ya buku mpe bozali kopengwa na ndambu? Lifuta nini ekozala likolo ya oyo akosala yango kati na bino kaka azala mutu ya mpamba na bomoyi ya mokili, mpe na mokolo ya suka, bakozongisama na etumbu ya makasi, mpe Allah abosani te maye bozali kosala?

88. Mpe balobi ete: Mitema mia biso mizali ya kokangama, kasi Allah alakeli bango botutu na ntina ya bopengwi na bango, mpe kondima na bango ezali ya moke.

97. Loba: Oyo akozala monguna ya (anzelu) djibril, kasi ya sôló ye akitisaki yango(1) na motema nayo na ndingisa ya Allah, mpe ezali kondima na maye ekitaki liboso; yango ezali bokambemi mpe bopesi sango elamu mpona bandimi.

100. mpe tango inso bazali kozua elaka; eteni mosusu kati na bango bazali kobebisa yango? Kasi ebele na bango bazali kondima te.

102. Mpe balandaki mabe oyo basatana balobaki na bokonzi ya Suleyman. Mpe Suleyman apengwaki te, kasi basatana nde bapengwaki na kolakisa bato bonganga na oyo ekitaki epai ya ba anzelu mibale na babilona Hârût na Mârût,(1) mpe bakotangisa moto te kino bakolobaka: Ya sôló mpenza biso tozali momekano ya mabe kasi bopengwa te. Mpe bazali kotanga epai na bango maye makokabola kati kati ya moto na mwasi naye. Mpe mabe na bango ekozua moto te sé na ndingisa ya Allah. Mpe bazali koyekola maye makonyokolo bango mpe makosunga bango te. Mpe basilaki koyeba ete oyo akosomba yango akozala na eloko te na mokolo ya suka, oyo nde mombongo ya mabe basali yango mpona milimo na bango soki bayebaki!

114. Nani oyo azali mabe koleka moto oyo apekisi ba masâdjid(1) ya Allah, ete batanga nkombo naye na kati, mpe aluki kobebisa yango? Bango wana bazali na ndingisa te ya kokota okati na yango. Longola sé ba oyo bazali kobanga; bakokitisama awa na nsé na kozanga lokumu, mpe o mokolo ya suka bakozala na etumbu enene.

118. Mpe baye batanga te balobaki ete: Mpona nini Allah asolisi biso (polele) te, too mpe elembo eyela biso? Na boye nde, bato balekaki liboso na bango, bazalaki koloba lolenge ya maloba na bango. Mitema na bango ekomaki na bokokani. Ya sôló tosili kolimbola bilembo mpo bato bazala na kondima.

125. Mpe tango totiaki ndako(1) ezala esika ya bozongi mbala na mbala, mpe ezala esika ya kimia mpona bato. Mpe bato basambela esika Ibrâhîm atelemaki. Mpe topesaki motindo na Ibrâhîm na Ismâïl ete: Bopetola ndako na ngai mpona bato ya kobaluka pembeni na yango, mpe na baye bakobombana okati mpona mabondeli, mpe na bagumbami mpe na bafukami(2).

126. Kanisa tango Ibrâhîm alobaki ete: Eh! Nkolo, tia mboka oyo ezala na kimia, mpe opesa bato na yango bomengo na bambuma ya ndenge na ndenge, baye bakondima na Allah mpe na mokolo ya suka, (Nkolo naye) azongisaki eyano ete: Oyo okati na bango akompegwa, nakopesa ye minyokoli mpe bomoyi mokuse, mpe etumbu ya móto, mpe oyo nde bozongi ya mabe.

128. Eh! Nkolo na biso tia biso mibale tozala bandimi, mpe na bakitani na biso bazala umma(1) mpo nayo, mpe lakisa biso lolenge na biso ya kokumisa yo, mpe ndima tubela na biso. Ya sôló ozali moyambi tubela mpe moyoki mawa.

131. Mpe tango Nkolo naye alobaki naye ete: Misokia, alobaki: Namisoki mpona Nkolo wa molongo mobimba.

132. Mpe Ibrâhîm apesaki yango mitindo na bana naye, mpe lolenge moko na Ya’qûb alobaki na bana naye: Eh bana na nga!, ya sôló Allah aponeli bino lingomba. Bokufa te bobele bozala nakati ya komisokia.

134. Ba oyo wana nde umma(1) eleka. Bazali na lifuti ya maye basalaki, bino mpe bozali na lifuti ya maye bosalaki. Mpe bokotunama te natina ya maye bango basalaki.

135. Mpe balobaki: Bozala bayuda to baklisto bokokambama na nzela ya semba. Loba: lingomba ya Ibrâhîm nde ezali nzela ya semba, mpe(1) azalaki te elongo na basambeli bikeko.

138. Tozali kolanda lingomba ya Allah, na boye nani azali malamu lokola Allah na lingomba lia ye? Mpe mpona ye nde tozali kobondela.

141. Ba oyo wana nde umma(1) baye baleka. Bakofutama na maye basalaki, bino mpe bokofutama na maye bosalaki. Bokotunama te na ntina na maye bango basalaki.

144. Ya sôló tozalaki komona yo ozali kobalola balola elongi nayo na likolo. Mpe tokopesaka yo ndingisa ya etaleli oyo osepelaki na yango. Balola elongi nayo o ndako esantu ya makkah (ka’aba), mpe bisika binso bokozala, bobalola bilongi bia bino epai wana(makkah). Mpe ya sôló ba oyo bapesamaki buku liboso na bino bazali koyeba yango, ya sôló ezali bosembo kowuta epai ya Nkolo wa bango. Mpe Allah abosani te maye bazali kosala.

148. Lingomba na lingomba ezali na etaleli na yango o esika babalukaka(1) mpona losambo.Mpe bowela na kosala bolamu. Bisika binso bokozala, Allah akozongisa bino epai naye. Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.

158. Ya sôló ngomba ya Swafâ na Mar’wa(1) ezali kati ya bilembo ya Allah. Mpe oyo akosala mobembo enene o ndako esantu, too mobembo eke, ezali lisumu te mpona ye kotambola kati kati ya ngomba wana mibale. Kasi oyo akobakisa bolamu mosusu, ya sôló Allah azali wa botondi atonda boyebi.

160. Longola sé ba oyo bakotubela, mpe babongisi, mpe balimboli bosôló, bango wana nde ngai(1) nakondima tubela na bango, mpe ngai nde moyambi ya tubela moyoki mawa.

173. Ya sôló (Allah), apekisaki bino kolia nyama eye bakati kingo te, mpe makila, mpe mosuni ya ngulu, mpe oyo bakati yango kingo kasi batangi nkombo ya Allah te. Kasi oyo azui mpasi na nzala ya makasi mpe alei yango na nko te mpe alekisi ndelo te azali na lisumu te, mpamba te ya sôló Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa.

177. Bolamu ezali te ete bobalola bilongi na bino o moniele mpe eloli. Kasi bolamu ezali na moto oyo andimi na Allah, mpe na mokolo ya suka, mpe andimi na ba anzelu, mpe na babuku mpe andimi na ba ntoma, mpe abimisi mosolo na bolingo na yango mpona mabota naye, mpe mpona bana bitike, mpe mpona babola, mpe mpona moleki nzela,(1) mpe mpona basengi lisalisi, mpe mpona kokangola bawumbu ya bandimi. Mpe baye bakangami okati ya boloko ya bitumba, mpe kotelemisa losambo, mpe kofuta zakat.(2) mpe baye bazali kokokisa elaka na bango eye balakaki, mpe baye bazali kokanga mitema tango makama na bokono bozwi bango, bango wana nde bato ya bosembo mpe bango nde babangi (Allah).

180. Esilaki kokomama mpona bino lotomo too mobeko ete: oyo okati na bino liwa ekokuta ye, soki atiki bozui ebele esengeli naye kotika malako ya malamu mpona baboti naye. Na mabota naye na ndenge elongobani. Wana nde lotomo likolo ya babangi(1).

182. Kasi soki mokaboli nkita ya mowei abangeli ye libunga too lisumu, mpe abongisi kati na bakitani naye, ezali lisumu te, ya sôló Allah azali molimbisi, atonda mawa.

187. Elingisami mpona bino kosangana na basi na bino o butu bwa ngizi; bango bazali bilamba bia bino. Bino bozali bilamba bia bango. Allah ayebi ya sôló bino bozalaki kosala yango na kobombana mpe ayambi tubela na bino mpe alimbisi bino. Mpe sik’oyo bosangana na bango mpe boluka bolamu na maye Allah asali mpona bino. Mpe bolia mpe bomela kino boyeba bokeseni ya tongo na butu. Sima bokokisa ngizi kino butu. Bosangana na bango te na bino bozali ya kobombana okati ya ba masâdjid(1). Mpe wana ezali ndelo ya Allah. Bopusana mpembeni na yango te. Na boye nde Allah azali kolakisa polele bilembo bia ye mpona bato, mpo ete bakoka kobanga.

189. Bazali kotuna yo na ntina ya basanza ya sika, loba ete: Yango bizali kosalisa bato mpona koyeba bangonga mpe mpona hajj. Ezali lolenge ya malamu te ete bozonga epai na bino sima ya mikongo ya bandako. Kasi lolenge ya malamu ezali na moto oyo azali kobanga (Allah). Bokota na bandako na minoko na yango mpe bobanga Allah mpo ete bolonga!

196. Mpe bosala hajj(1) na umra(2) mpona Allah. Mpe soki bozui mpasi mpona kokokisa yango, bobimisa likabo na ndenge bokoki. Kasi bokata basuki ya mitu na bino te liboso ete nyama ekoma na esika ya kosasa. Soki moko kati na bino azali na bokono too azali koyoka mpasi na mutu naye (mpe esengeli akata suki), afuta lomande na kokanga ngizi too apesa mabonza too afuta mbeka sima ya kosala umra, otango bokozwa kimia, moto nionso oyo azwi mpasi te sima ya umra liboso ya kosala hajj esengeli naye kobonzela Allah oyo akokoka. Na oyo azali na makoki wana te akanga ngizi mikolo misato na tango azali na hajj, mpe mikolo sambo tango bokozonga, wana nde mikolo zomi ya kokoka. Wana ezali mpona moto oyo libota naye ezali te zingazinga na ndako esantu ya Makkah. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali makasi na etumbu.

200. Mpe soki bosilisi mabondeli na bino ya hajj, bokanisa Allah ndenge bokanisaka baboti na bino, to bokanisa (Allah) makasi koleka. Mpe ezali na bato basusu awa na mokili balobaka ete: Eh Nkolo! Pesa biso bomengo ya nsé. Mpe bango bakozala na eloko te na mokolo ya suka.

201. Mpe basusu okati na bango, bazali koloba: Eh Nkolo na biso! pesa biso bomengo ya malamu awa na nsé, mpe bombela biso bomengo ya malamu okati ya lola, mpe obatela biso na etumbu ya móto ya lifelo.

204. Mpe okati ya bato, liloba naye ezali kokamwisa yo na bomoyi ya nsé mpe azali kotia Allah nzeneneke na maye mazali omotema naye, mpe ye nde moto ya tembe makasi ya ntina te.

207. Mpe okati ya bato, oyo azali koteka molimo naye mpona koluka kosepelisa Allah. Mpe Allah azali na mawa mingi likolo na bawumbu naye.

217. Bazali kotuna yo mpona bitumba okati ya sanza esantu. Loba ete: Kobunda okati ya sanza esantu ezali lisumu monene, mpe kopekisa bato na nzela ya Allah, mpe kopengwa na yango, mpe kobengana baye bazali na ndako esantu (ya makkah) ezali lisumu linene koleka epai ya Allah. Mpe kosangisa Allah ezali mabe mpenza koleka koboma, mpe bakotika kobundisa bino te kino bokopengwa na lingomba na bino soki bazalaki na makoki wana, mpe kati na bino oyo akotika lingomba naye mpe liwa ezui ye mpe ye azali mopagano, bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé mpe na mokolo ya suka. Mpe bango wana bazali bato ya lifelo bakozala na kati seko na seko.

219. Bazali kotuna yo mpona masanga mpe mpona masano ya mbongo. Loba ete: Yango nyoso ezali na lisumu linene mpe litomba mpona bato. Kasi lisumu na yango ezali munene koleka litomba wana, mpe bazali kotuna yo nini bakoki kobimisa (mpona Allah)? Loba ete: Oyo bokoyoka mpasi te na mitema mpona kobimisa yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino bilembo mpo ete bozala na bososoli.

223. Basi na bino bazali bilanga bia bino. Bokota o bilanga bia bino ndenge nyonso bolingi,(1) mpe bosala misala ya malamu mpona milimo na bino. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló bokokutana naye. Pesa sango ya malamu epai ya bandimi.

224. Mpe botia nkombo ya Allah te mpona kolapalapa na bino mpo na koluka nzela ya komipekisa kosala (misala) ya malamu, mpe kobanga mpe kobongisa okati na bato. Mpe Allah azali moyoki moyebi ya manso.

225. Allah azali kosilika na bino te na ba ndayi oyo ezali kobima na lolemu na bino, kasi akosilika na bino na oyo bozui kowuta na mitema na bino. Allah azali molimbisi atonda bolamu.

226. Mpona baye bazali kolapa ndayi likolo ya basi na bango, ete bakosangana na bango te bakozelisa sanza minei. Kasi soki balongoli kolapa ndayi na bango, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa.

227. Mpe soki batelemi na ndayi na bango ya kokabwana na basi na bango, ya sôló Allah azali moyoki mpe moyebi.

228. Mpe basi baye bakufeli mabala bakobima na ndako ya libala te kino bakomono makila mbala misato. Mpe esengeli te na bango kobomba maye Allah asili kokela okati ya mabumu na bango, soki ya sôló bazali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Mpe na tango wana, mibali na bango bakomi na ndingisa ya kozongela bango, soki bazali na posa ya kobongisa, bazali na lotomo ndenge moko mpe mibali bazali na lotomo, kasi mibali bazali na bokonzi likolo na bango basi. Mpe Allah azali bokasi atonda bwányá.

229. Bokabwani ya libala ezalaka sé mbala mibale. Na sima, bakoki kozongana na ndenge elongobani, to mpe kokabwana na lolenge ya malamu. Mpe esengeli te na bino mibali kobotola maye bopesaki bango na libala, sé soki babangi ete bakokoka te kobatela mibeko ya Allah.(1) Mpe soki bobangi ete bango mibale bakotelemisa mibeko ya Allah te, na bongo ezali lisumu te likolo na bango ete mobali andima kozua mwa lompata oyo mwasi apesi mpona komikangola, wana nde mibeko ya Allah. Bobuka yango te, oyo akobuka mibeko mia Allah bango wana nde bazali bato mabe.

233. Mpe bamama, bakomelisa bana na bango mabele mbula mibale mobimba mpona baye balingi kokokisa komelisa bana mpenza. Mpe esengeli na tata ya mwana koleisa mpe kolatisa bamelisi wana na lolenge ya malamu, molimo amemaka te mokumba oyo eleki ye kilo. Mama anyokolama te mpona mwana naye; tata mpe anyokolo nzoto naye te mpona mwana. Mpe soki tata na mwana azali te, esengeli na mokitani naye amema mokumba wana lolenge moko tata azali kosala mpona mwana naye. Mpe soki baboti balingi kokata mwana mabele na bosepeli mpe boyokani kati na bango mibale ezali mabe te, mpe soki bolingi komelisa bana na bino o bipai bisusu, ezali mpe mabe te, soki bofuti bamelisi ya bana na ndenge elongobani. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali komona maye bozali kosala.

241. Mpe mpona basi bakufeli mabala esengeli kosalela bango limemia na lolenge ya malamu, ezali lotomo likolo ya babangi.

249. Mpe, tango Twâlût alingaki kokende na mapinga, alobaki ete: Ya sôló Allah akomeka bino na mayi ya ebale. Oyo kati na bino akomela yango azali ya ngai te, mpe oyo akomeka yango te yende azali wa ngai, longola sé oyo akotoka mwa moke na loboko naye. Kasi ebele na bango bamelaki mayi, sé moke kati na bango bandimaki naye. Mpe tango ye na bandimi baye bazalaki naye bakatisaki ebale, balobaki ete: Biso lelo tozali na nguya te liboso ya Djâlût na mampinga naye. Kasi misusu kati na bango bakanisaka ete bakokutana na Allah balobaki ete: Boniboni mapinga moke malongi mapinga ya monene na ndingisa ya Allah? Mpe Allah azali elongo na baye bazali koyika mpiko.

259. To mpe lokola moto oyo Alekaki mboka moko boye ezalaki ya kokufa, alobaki ete: Ndenge nini Allah akozongisa yango na bomoyi sima ya liwa? Mpe Allah abomaki ye moto wana, mpe awumelaki na mabele mbula nkama moko. Na sima Allah asekwisi ye, mpe atuni ye: Osali mikolo boni awa? Azongisaki eyano ete: Nasali mokolo moko to ndambu ya mokolo, (Allah) alobi naye ete: Yo osali mbula nkama moko awa, tala bilei nayo na mayi nayo ya komela ezali ya kobeba te, mpe tala epai ya himar(1) nayo etikali sé mikuwa. Mpe mpo totia yo ozala elembo epai ya bato, kasi tala epai ya mikuwa ndenge ngai (Allah) nazali kozongisa yango na sima nalatisi yango misuni. Mpe tango amonaki ete Allah asekwisi himar naye, alobaki ete: Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.

261. Ndakisa ya baye bazali kobimisa misolo na bango na nzela ya Allah, ezali lokola mbuma elonami sima ebimisi bitape sambo, mpe na etape moko ezali na bambuma nkama moko, mpe Allah abakisaka mbano ebele na oyo ye alingi, mpe Allah azali na ebele ya bozui, azali moyebi koleka.

263. Liloba ya kitoko mpe bolimbisi, ezali malamu koleka likabo liye lilandisami na liloba ya mabe. Allah azali na bosenga na eloko te, mpe atonda bolamu.

264. Eh Bino bandimi! bobebisa mabonza na bino te na kolandisa yango na maloba mabe, mpe na monyokoli, lokola moto oyo azali kobimisa mosolo naye mpo bato bamona ye mpe ye andimi na Allah te, andimi mpe na mokolo ya suka te. Ndakisa naye moto wana ezali lokola libanga monene ezipami na zelo, mpe tango mbula ya makasi enoki, etiolisi zelo nyoso mpe etiki libanga mpamba. Bango(1) bakozua lifuta moko te na maye babimisaki na mabonza, mpe Allah akokamba te bato oyo basili kopengwa.

265. Mpe ndakisa ya ba oyo bazali kobimisa misolo mia bango na bondimi bonso mpona Allah, mpe mitema mia bango mizali kimia bazali lokola elanga ezuami na mabele ya kitoko na esika etombwami, mbula makasi enokeli yango, mpe epesi mbuma na yango mbala mibale koleka. Ata soki mbula ya makasi ebeti te, matanga ya mike ekoki na yango. Mpe Allah azali momoni maye bozali kosala.

266. Boye moko kati na bino akolinga kozala na elanga ya naghil(1) mpe ya a’nâb(2) eye mingala mizali kotiola na nsé na yango, mpe ezali kopesa ye mbuma inso ya ndenge na ndenge, na sima mobange ekomeli ye, mpe bana naye bazali mike naino bakoli te, mpe mopepe ya monene ya makasi ya móto ekoti na elanga wana mpe ezikisi yango nyoso? Na lolenge ya boye nde Allah azali kolimbolela bino bilembo bia ye mpo ete bokanisa.

267. Eh bino bandimi! Na bozui bozali na yango bobimisa ya malamu mpona nzela ya Allah mpe ndenge moko na milona miye topesi bino kowuta okati ya mabele. Kasi bopona te ya mabe mpona kobimisa na nzela ya Allah oyo soki bapesaki bino yango bokolinga kozua yango te kaka mpona nsoni mpe na kokanga miso. Mpe boyeba ete ya sôló Allah asanzolama atonda bomengo.

268. Satana azali kobangisa bino kimobola mpe azali kotinda bino na makambo ya mbindo mpe ya bonsoni, kasi Allah azali kolaka bino bolimbisi mpe lisalisi kowuta epai naye. Mpe Allah atonda bomengo azali moyebi koleka.

273. Mpona babola baye bakangamaki na nzela ya Allah, bazali na makoki te yakotambola na mokili mpona koluka bozui, bato bazanga boyebi bakokanisa ete bango bazali na bomengo, mpona nsoni bazali na yango mpona kosenga. Kasi okoyeba bango ete bazali babola na bilembo na bango, ete balembisaka bato te na bisenga senga. Mpe eloko nyoso bobimisi mpona Allah, ya sôló (Allah) ayebi yango.

275. Baye bazali kolia mbongo ya ekotama, bakotelema te (kowuta na lisekwa na malita na bango), sé lokola kotelema ya moto oyo zabulu asimbi ye na liboma. Mpo ete bango balobaki ete: Ekotama ezali sé lokola mombongo. Kasi Allah apesi ndingisa ya kosala mombongo, mpe apekisi ekotama. Mpe oyo okati na bino malendisi ya Nkolo naye ekomeli ye mpe atiki ekotama azali na masumu te na maye maleka liboso, mpe likambo naye ezali epai na Allah. Kasi baye bakozongela yango, bango wana nde bazali bato ya móto bakozala na kati seko na seko.

280. Mpe soki moto azali na nyongo na bino azali na kpokoso mpona kofuta yango, bokozelisa ye kino azua yango. Mpe soki botiki yango likabo, ezali malamu mpona bino soki boyebaki.

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا تَدَايَنتُم بِدَيۡنٍ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى فَٱكۡتُبُوهُۚ وَلۡيَكۡتُب بَّيۡنَكُمۡ كَاتِبُۢ بِٱلۡعَدۡلِۚ وَلَا يَأۡبَ كَاتِبٌ أَن يَكۡتُبَ كَمَا عَلَّمَهُ ٱللَّهُۚ فَلۡيَكۡتُبۡ وَلۡيُمۡلِلِ ٱلَّذِي عَلَيۡهِ ٱلۡحَقُّ وَلۡيَتَّقِ ٱللَّهَ رَبَّهُۥ وَلَا يَبۡخَسۡ مِنۡهُ شَيۡـٔٗاۚ فَإِن كَانَ ٱلَّذِي عَلَيۡهِ ٱلۡحَقُّ سَفِيهًا أَوۡ ضَعِيفًا أَوۡ لَا يَسۡتَطِيعُ أَن يُمِلَّ هُوَ فَلۡيُمۡلِلۡ وَلِيُّهُۥ بِٱلۡعَدۡلِۚ وَٱسۡتَشۡهِدُواْ شَهِيدَيۡنِ مِن رِّجَالِكُمۡۖ فَإِن لَّمۡ يَكُونَا رَجُلَيۡنِ فَرَجُلٞ وَٱمۡرَأَتَانِ مِمَّن تَرۡضَوۡنَ مِنَ ٱلشُّهَدَآءِ أَن تَضِلَّ إِحۡدَىٰهُمَا فَتُذَكِّرَ إِحۡدَىٰهُمَا ٱلۡأُخۡرَىٰۚ وَلَا يَأۡبَ ٱلشُّهَدَآءُ إِذَا مَا دُعُواْۚ وَلَا تَسۡـَٔمُوٓاْ أَن تَكۡتُبُوهُ صَغِيرًا أَوۡ كَبِيرًا إِلَىٰٓ أَجَلِهِۦۚ ذَٰلِكُمۡ أَقۡسَطُ عِندَ ٱللَّهِ وَأَقۡوَمُ لِلشَّهَٰدَةِ وَأَدۡنَىٰٓ أَلَّا تَرۡتَابُوٓاْ إِلَّآ أَن تَكُونَ تِجَٰرَةً حَاضِرَةٗ تُدِيرُونَهَا بَيۡنَكُمۡ فَلَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٌ أَلَّا تَكۡتُبُوهَاۗ وَأَشۡهِدُوٓاْ إِذَا تَبَايَعۡتُمۡۚ وَلَا يُضَآرَّ كَاتِبٞ وَلَا شَهِيدٞۚ وَإِن تَفۡعَلُواْ فَإِنَّهُۥ فُسُوقُۢ بِكُمۡۗ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۖ وَيُعَلِّمُكُمُ ٱللَّهُۗ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ [٢٨٢]

282. Eh bino bandimi! Soki bopesani nyongo ekofutama na mokolo moyebani, bokoma yango. Mokomi akoma yango na bosembo kati na bino, kasi ye mokomi aboya kokoma yango te lolenge Allah asili kotangisa ye. Akoma mpe moto azali na nyongo aloba mpe abanga Allah Nkolo naye, akutola eloko moko te. Mpe soki moto azali na nyongo azali zoba to azali na makasi te to mpe ayebi kokoma te, molobeli naye alobela ye na bosembo. Mpe bozua banzeneneke mibale ya mibali kati na bino, mpe soki mibali mibale bazuami te. Bokozua mobali moko na basi babale, baye bokosepela na bango mpona kozala banzeneneke mpo ete soki moko kati na bango mibale abungi to abosani mosusu azongisa ye na nzela. Mpe soki bato babengami ete bazala banzeneneke baboya te koyanola na mbela wana. Mpe bozala na bolembu te mpona kokoma yango, ya moke to mpe ya monene kino ngoga na yango, wana ezali semba epai ya Allah mpe lolenge ya malamu ya kofuta nyongo mpo ete boyimayima te. Kasi soki ezali koteka na kosomba oyo ezuami kati na bino, bozali na lisumu te soki bokomi yango te, kasi bozua banzeneneke tango bozali koyokana na ntalo. Mokomi anyokwama te monzeneneke anyokwama mpe te, mpe soki bosali yango mpona konyokolo bango ekozala mabe mpona bino, mpe bobanga Allah Allah akotangisa bino, mpe Allah azali moyebi na biloko nyoso.

283. Mpe soki bozali na mobembo, mpe bozui moto te mpona kokoma nyongo, mozui nyongo akosimbisa nkolo mbongo mwa eloko (eye ekofandisa ye na kimia). Soki mpe boyokani bino na bino na lolenge ya malamu, moto azali na nyongo esengeli naye kofuta mobimba na ndenge azuaki (adefaki). Mpe abanga Allah Nkolo naye, mpe bobomba litatoli te moto oyo akobomba yango ya sôló motema naye ezali na bokono ya lisumu. Mpe Allah ayebi maye manso bozali kosala.

285. Motindami andimi na maye makiteli ye kowuta epai na Nkolo naye, na bandimi mpe lokola; bango banso bandimi na Allah, na ba anzelu naye, na babuku bia ye, na batindami naye, to kotia bokeseni te okati ya moko kati ya bantindami naye. Mpe balobi ete: Toyoki mpe totosi. Eh Nkolo wa biso! Tosengi nayo olimbisa biso. Mpe epai nayo nde tokozonga.