عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Taha [Taha] - Lingala translation

Surah Taha [Taha] Ayah 135 Location Maccah Number 20

1. Twâ hâ(1).

3. Sé ezala bokundoli тропа oyo azali kobanga, (Allah).

6. Maye manso mazali olikolo тре mabele na maye mazuami kati kati na yango na oyo na nsé ya mabele mazali ya ye.

7. Mpe soki otomboli mongongo, ayebi solo maye mabombami na maye mazali ya kobatama koleka.

8. Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe azali na bankombo ya kitoko koleka.

9. Mpe boye masolo (makomi) ya Mûssa makomelaki yo?

10. Tango amonaki moto, mpe alobaki na libota naye; botikala awa, ya soló, namoni moto na mosika tango mosusu nakoyela bino kowuta na yango eloko ya kopelisa to na kokutana na oyo akokamba ngayi.

14. Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai.

17. Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa?

18. Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango,(1) mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu.

19. (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa!

20. Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola.

21. (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso.

22. Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa).

24. Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo,

25. (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai,(1)

26. Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete,

28. Mpo bakoka kososola maloba na ngai.

29. Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai.

30. Hâruna ndeko wa ngai,

31. Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya,

32. Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale),

36. (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama.

46. (Allah) alobi: Bobanga te, ya sólo nazali elongo na bino, nazali koyoka mpe kornona.

48. Ya sólo, basilaki koyebisa biso ete: Etumbu ekozala likolo ya oyo akoboya kotosa mpe kondima, mpe apesi mokongo.

50. (Mûssa) alobi: Nkolo wa biso nde oyo apesaki eloko nyoso lolenge na yango mpe sima akambi yango.

51. (Falo) alobi: Bongo ndenge nini тропа baye balekaka kala?

52. (Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te.

54. Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele)

55. Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu.

57. (Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso?

59. (Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo.

60. Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka.

68. Toyebisaki ye: Kobanga te, yo nde okozala likolo. (na bango)

69. Мре bwaka oyo ezali na loboko nayo ya mobali, ekomela manso oyo basali. Soló, wana basali ezali mwango ya bonganga, mpe nganga akoki kolonga te о esika nyoso awuti.

76. Lola ya edeni eye ezali kolekisa na nsé na yango mingala, libela kati na yango, mpe wana ekozala nde litomba ya baye bamipetolaki. (na boboyi kibopengwi na masumu)

79. Мре falo abungisaki bato naye, mpe akambaki bango o nzela ya semba te.

82. Mpe ya soló, nazali molimbisi monene, тропа oyo akosenga bolimbisi mpe andimi mpe asali misala milamu, sima amitiye o nzela ya semba.

83. Mpe тропа nini ozali kowelisa kotika bato nayo oh Müssa?

84. (Mûssa) ayanolaki: Bazali wana na mobeko mwa ngai, mpe nazali kowelisa koya epai nayo Nkolo, mpo okoka kondimela ngai.

88. Mpe abimiseli bango ekeko ya motané ezali kobimisa mongongo lokola ngombe, Balobi; oyo nde nzambe na bino na nzambe ya Mûssa abosanaki.

89. Boye bazali kornona te ete azali kozongisela (ekeko) bango liloba te mpe azali kosalisa bango te mpe kosala bango mabe te?

90. Mpe ya soló: Háruna(1) asilaki koyebisa na bango liboso oh bato ba ngai! Ya sólo, bokwei na bomekami тропа yango, ya soló, oyo atonda na mawa nde Nkolo na bino. Bolanda ngai, mpe botosa mitindo mia ngai.

92. (Mûssa) alobi: Oh Hânına!(1) Eloko nini epekisaki yo mpo opekisa bango tango omonaki bazali kobunga nzela?

93. Ete olanda ngaï. Boye, oboyi kotosa mitindo na ngai?

98. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo nzambe mosusu ya bosóló ya kobondela azali te sé ye, ayebi nyoso ezali koleka.

102. Mokolo moye bakofulaka kelelo тропа lisekwa. Mpe tokosangisaka batomboki banso, na langi ya bule (тропа bobangi ya makasi).

104. Toyebi na malamu nini bazali koloba, tango moko wa bango oyo azali na ezaleli ya malamu akoloba ete: Borandaki sé mokolo moko.

105. Bazali kotuna yo тропа bangomba; loba: Nkolo wa ngai akopanzaka yango, ekokomaka lokola mputulu.

106. Mpe akotika yango elali polele lokola mabele oyo ezali na eloko te likolo na yango.

107. Okomona o kati na yango ata esika moko ezali ya kogumbama te mpe botombwami te.

108. Mokolo wana (bato), bakolandaka mobengi na kozanga koyimayima mpe mingongo mikokitisama o boso bwa Ar-Rahmân, ata makelele ya шоке okoyoka na paši.

110. Ayebi maye mazali liboso na bango mpe maye mazali o sima na bango, mpe bazali na boyebi te ya balolenge naye.

111. Mpe bilongi bia bato bikokitisamaka тропа oyo azali na bomoi mpe amikoka mpe mabe ekozalaka na oyo akoya liboso naye na bobubami. (mabe)

113. Mpe lolenge wana nde tokitisaki kurani na ndinga ya arabo, mpe tolimbolaki na kati na yango, тропа balolenge ya bitumbu, mpo bakoka kobanga mpe bakanisa тропа bondimi.

115. Mpe tosilaki kopesa Adam mobeko liboso mpe abosanaki yango, mpe tokutaki bokangami ya makasi epai naye te.

116. Mpe tango tolobaki na ba anzelu: Bogumbama o liboso ya Adam, bagumbamaki bango banso, longola sé satana, aboyaki (kogumbamela ye),

118. Ya sólo, тропа yo, okoyokaka nzala te okati na yango mpe okozalaka bolumbu te.

119. Mpe ya sólo, yo okoyokaka mposa ya mayi te, mpe pasi ya moyi ekozuaka yo te.

122. Sima Nkolo waye aponaki ye mpe ayambaki tubela naye mpe akambaki ye.

123. Alobi: Bokita awa(1) bino banso, bokozala na kibonguna na mabota ma bino banso, (bakitani na bino) mpe soki bokambi bwa ngai boyeli bino, oyo akolanda bokambi bwa ngai, akobunga te mpe akozalaka na mpasi te.

124. Mpe oyo akoboya bokundoli bwa ngai, ya soló, ye akozalaka na bomoyi ya mpasi, mpe omokolo mwa suka, tokosekwisa ye miso mazipama,

125. Akolobaka, oh Nkolo wa ngai! Mpona nini osekwisi ngai nazali kornona te kasi yambo nazalaki kornona?

126. (Allah) akoyebisa ye: Lolenge wana nde eyelaki yo bilembo bia biso mpona kotangisa yo, kasi obosanaki yango, yango wana lelo tobosani yo.(2)

127. Мре lolenge wana nde topesaka etumbu na oyo azali kondima te, mpe azali kolekisa ndelo na bilembo bia Nkolo wa ye. Kasi etumbu ya mokolo ya suka ekozalaka makasi mpe ekotikalaka libela.

129. Soki тропа liloba ya Nkolo naye esila kolobama te mpe тропа mokano naye te, mbele etumbu esilaki kokwela bango.

132. Мре tinda libota lia yo na losambo, mpe žala molende na yango, tozali kosenga yo bozui te, biso nde tozali koleisa yo, mpe suka ya malamu ezali тропа bobangi (Allah).