عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Prophets [Al-Anbiya] - Lingala translation

Surah The Prophets [Al-Anbiya] Ayah 112 Location Maccah Number 21

1. Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo.

5. Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo.

6. Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima?

9. Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo.

10. Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te?

15. Bakotikaka komitungisa te, kino tokokomisaka bango lokola milona ya (mputulu miye mikawuka) mpe moto ezali kozikisa bango.

18. Tozali kolobela тропа bosôló, kasi lokuta te, mpe lokuta elimwa mpe ekende. Mpe mabe ekozala likolo na bino тропа oyo bozali kokokisa (Allah) na yango.

19. Mpe manso oyo mazali o likolo mpe na nsé, mazali ya ye, тре baye bazuami pene naye (ba anzelu) basalaka lolendo te тропа kokumisa ye, mpe balembeke te.

22. Soki o kati ya likolo na o nsé ezalaka na banzambe mosusu elongo na Allah, mbele mobulu ekotaki kati na yango (mapata na mabele), mpe nkembo na Allah kolo ya ngwende na maye bazali kokokisa.

23. Akotunamaka(1) na oyo asali te, kasi bango nde bakotunama na maye basalaki.

24. Boye bazali kondimela banzambe mosusu na botiki ye? (Allah) loba: Boya na bilembetele na bino. Oyo ezali bokundoli тропа baye bazali elongo na ngai, тре bokundoli тропа baye balekaka liboso na ngai. Kasi ebele na bango bazali koyeba bosôló te. Мре bazali komitiya mosika па yango.

25. Мре liboso nayo totindaki motindami te, sé topesa ye emoniseli ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele ngai, mpe bobondela ngai.

28. Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe sima na bango mpe bazalaka balobeli ya moto te sé na ba oyo (Allah) asepeli na bango, mpe bazali kobanga ye bobangi ya sólo.

31. Mpe totiyaki bangomba o kati na mabele mpo ete esimbama makasi mpe eningana te na baye bazali likolo nayango mpe totiyeli yango banzela mpo bakoka kokambama.

37. Moto akelama na kowela wela. Nakolakisa bino bilembo na ngai, kaši bowelisa ngai te тропа yango (etumbu)

38. Mpe bakolobaka: Elaka yango ekokokisama tango nini, soki bozali koloba solo?.

42. Loba: Nani abatelaka bino o kati na butu тре па тоуі па etumbu ya Ar-Rahmân? Мре bazali kopesa mokongo na bokundoli ya Nkolo wa bango.

43. To bazali na banzambe basusu na esika na biso oyo bakobatela bango? Kasi bakokoka te komisalisa bango moko mpe bakokoka te koluka nani akosunga bango likolo na ngai.

48. Mpe tosilaki kopesa Mûssa na Háruna buku, ya bososoli (torah) mpe na bongengi mpe ezala bokundoli тропа babangi,

49. Baye bazali kobanga Nkolo wa bango ata soki bazali kornona ye te, mpe bazali kobanga eleko ya mokolo ya suka.

50. Мре (kurani) oyo ezali bokundoli oyo epambwama tokitisaki yango, boye bino bozali koyina yango?

53. Balobaki: Tokutaki batata na biso (to, bankoko na bango ya kala) bazalaki kobondela yango.

60. Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm.

70. Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza.

71. Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba.

77. Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso.

78. Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale.

79. Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango.

82. Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango.

83. Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka.

86. Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu.

87. Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi.

89. Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi.

91. Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba.

95. Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango.

98. Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso.

99. Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela.

100. Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te.

105. Mpe ya soló, tosilaki kokoma o kati ya zabur, o sima ya makundoli, ya solo, baye bakoki kozua bokitani ya mabele ezali bawumbu na ngai ya malamu (bandimi).

107. Mpe totindaki yo te sé тропа ozala ngolu тропа mokili mobimba.