عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Light [An-Noor] - Lingala translation

Surah The Light [An-Noor] Ayah 64 Location Maccah Number 24

1. Oyo nde suratu (eteni) eye tokitisaki yango, mpe totiyaki ezala mobeko, mpe tokitisaki mikapo o kati na yango mizali polele mpo bokoka kokanisa.

3. Mosali ekobo ya mobali akoki kobala te sé mosali ekobo ya mwasi to mopengwi ya mwasi, mpe mosali ekobo ya mwasi akoki kobala te sé mosali ekobo ya mobali to mopengwi yamobali, kasi wana eboyami тропа bandimi.

9. Mpe ya mbala ya mitano ezali ete: Kanda ya Allah ekozala likolo naye (mwasi) soki (mobali) azali kati ya balobi solo.

10. Мре soki mpo na bolamu ya Allah na mawa naye likolo na bino te ya soló Allah azali moyambi tubela atonda bwanya.

15. Tango bino moko bozali kobota yango na balolemo na bino mpe bozali koloba yango na minoko na bino oyo bozali na boyebi na yango te mpe bozali kornona yango шоке, kasi yango epai ya Allah ezali monene.

23. Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi.

26. Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu.

31. Мре loba na bandimi ya (basi), bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango mpe balakisa bonzenga na bango te sé oyo ekoki komonana, mpe bakanga kitambala na bango ya monene kino ezipa bantolo na bango, kasi bonzenga ma bango balakisa yango sé epai ya mibali na bango, to epai ya batata na bango to batata ya mibali na bango to bana na bango to epai ya bana ya mibali na bango, to bandeko na bango to bana ya bandeko na bango ya mibali, to bana ya bandeko na bango ya basi, to bandimi ya basi, to bawumbu na bango, to basali ya mibali baye kimobali na bango esalaka te, to bana ya mike baye bayebi makambo ya basi te, mpe babeta makolo na bango makasi te na mabele тропа komonisa oyo ebombami na bonzenga na bango mpe botubela epai ya Allah bino banso, eh bino bandimi mpo ete bolonga.

33. Мре тропа baye bazui naino makoki ya libala te, ba mibatela kino Allah akopesa bango bozui na ngolu naye, mpe baye okati ya bawumbu na bino baye balingi boyokani na bino, na ntina ete basikolama, tika ete boyokana na bango soki boyebi ete bolamu ezali kati na bango, тре bopesa bango misolo mia Allah miye apesa bino. Botinda te na makasi bilenge basi bawumbu bábino baye basepeli komibatela ete basala ekobo, na posa ete bozua bomengo ya bomoi ya nsé. Oyó okati na bino akosalisa bango ekobo na makasi, sima ya kotinda bango na makasi, ya soló Allah, azali molimbisi atonda ngolu.

36. Kati na bandako oyo(1) Allah apesaki ndingisa ya kotelemisa yango mpo batanga nkombo naye na kati mpe basanzola ye na kati tongo mpe nsima ya nzanga,

38. Mpo Allah afuta bango na lolenge ya malamu, тропа maye basalaki mpe abakisela bango bolamu bwa ye, Allah apesaka bozui na oyo alingi ezali na motango te.

41. Boye bozali kornona te ete: Ya soló, biloko nyoso biye bizali na likolo mpe na nsé bizali kokumisa Allah, mpe bandeke bazali kopepe mapapu na bango? Mpe ekelamu nyoso eyebi lolenge yalosambo naye mpe kokumisa naye. Allah ayebi malamu maye bazali kosala.

42. Mpe Allah nde Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, mpe epai na Allah nde bozongi bozali.

48. Mpe tango bakobenga bango baya epai na Allah na motindami wa ye, mpo akata (makambo) kati na bango, okomona basusu kati na bango baboyi.

60. Mpe тропа basi baye bakomisa mibu miye bakoki lisusu kobala te, ezali lisumu te soki balingi kolongola bilamba(1) bia bango na polele, kasi na ndenge yakotika bonzenga nyoso polele te, mpe soki basaleli nsoni ezali malamu тропа bango. Allah azali moyoki mpe moyebi.

61. Epekisami te тропа mokufi miso, na moto ya tengu, na moto ya bokono, na bino na bino na libota moko ete bolia na bandako ya bino, to bandako ya batata na bino, to bandako ya bamama na bino, to bandako ya bandeko na bino ya mibali, to bandako ya bandeko na bino ya basi, to ya batata kulutu na batata leki na bino, to ya batata mwasi na bino, to ya banoko na bino, to ya bamama kulutu na bino mpe bamama leki na bino, to na bandako oyo bosimbi bafungola na yango, to ya baninga na bino, ezali mabe te тропа bino kólia na lisanga to ya kokabuana, mpe soki bokoti na bandako bopesana mbote (ya kimia) losako ya mapamboli mpe ya kitoko mowuta epai na Allah. Ndenge wana nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye mpo ete bososola.