عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Poets [Ash-Shuara] - Lingala translation

Surah The Poets [Ash-Shuara] Ayah 227 Location Maccah Number 26

1. Twâ, sín, mîm.(1)

6. Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango.

7. Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu?

12. Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te.

13. Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna.

14. Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai.

15. (Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka.

16. Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo,

22. Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo?

24. (Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te.

25. Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te?

28. (Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba.

30. (Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele?

31. (Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló.

32. (Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola.

33. Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala.

34. (Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi.

36. Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana),

37. Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi.

50. Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso!

51. Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah).

58. Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu.

60. Mpe balandaki bango na ntongo makasi.

61. Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló).

62. (Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai.

64. Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)

65. Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye,

70. Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela?

73. То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino?

83. Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu.

85. Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko.

89. Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama),

90. Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah),

93. Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga?

94. Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango.

97. Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele.

99. Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso.

101. Ata moninga ya soló soló azali te.

102. Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu.)

105. Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta.

106. Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te?

107. Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino.

110. Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi

117. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te,

119. Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda.

120. Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi).

123. Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami.

124. Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te?

125. Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino.

128. Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa?

129. Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili?

130. Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi.

141. Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami.

142. Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

146. Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala,

147. O kati ya bilanga mpe mingala?

148. Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko,

155. Alobi: Nâqah(1) oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi.

161. Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

162. Nazali motindami malamu тропа bino.

165. Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili?

166. Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)

169. Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala.

171. Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu.

173. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki?

177. Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?

181. Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te.

183. Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te).

188. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala.

189. Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene.

192. Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo,

193. Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango,

196. Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala.

200. Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki.

203. Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)

205. Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana,

210. Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani).

211. Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te.

212. (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka.

216. Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala.

217. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa.

224. Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga.

225. Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale?)