عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

THE ANT [An-Naml] - Lingala translation

Surah THE ANT [An-Naml] Ayah 93 Location Maccah Number 27

2. (Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi.

4. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli.

6. Mpe ya solo, ozali koyamba kurani oyo kowuta epai ya oyo azali na bwanya atonda mayele.

8. Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya).

9. Eh Mûssa! Ezali ya soló, ngai Allah oyo nazali na nguya na ntonda bwanya.

13. Mpe tango bilembo bia biso bikomelaki bango polele polele, balobi ete: Oyo ezali bonganga ya polele.

17. Mpe basangiseli Suleyman mapinga ya basoda naye ya badjini (bilima) na bato, mpe bandeke, batandanaki milongo milongo.

19. Mpe (Suleyman) akatani na koseka tango ayokaki liloba ya sombe wana mpe asepeli na makambo na bango oyo basali mpe alobi: Oh Nkolo! Tika natondo yo botondi тропа bolamu nayo likolo na ngai na baboti na ngai mpe tika ete nasala mosala oyo ekosepelisa yo, mpe na ngolu nayo, kotisa ngai na mawa nayo okati ya lisanga ya bawumbu nayo ya malamu.

22. Kaši awumelaki tango molayi te na kozonga, mpe alobaki na mokonzi ete: Nazui boyebi oyo ozali na yango te, mpe nayeli yo sango ya sôló, kowuta na mboka sabat(2).

23. Nakuti mwasi moko azali kokonza bango, mpe makambo mazali kokambama naye, mpe azali na kiti ya bokonzi ya kitoko monene koleka.

26. Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Nkolo ya ngwende ya bonene (ya bokonzi).

30. Ya soló, ewuti epai ya Suleyman. Mpe ya sólo yango ebandi na nkombo ya Allah wa boboto atonda ngolu.

31. Ete bosalela ngai lolendo te, mpe boya epai na ngai nakomisokia (kozala bamizilima).

34. Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka.

36. Mpe tango (bantoma to basali naye) bakomaki epai ya Suleyman na (libonza) alobi: Boye bolingi kosomba ngai na misolo? Kasi oyo Allah asilaki kopesa ngai ezali ebele mpe eleki likabo na bino oyo bozali kosepela na yango.

37. Zonga epai na bango, kasi tokoyela bango na basoda ya makasi baye bakotelema liboso na bango te mpe tokobimisa bango. Na yango mpe bakozanga lokumu mpe bakokitisama.

38. Alobaki ete: (Suleyman) oh bankumu na ngai! Nani akoyela ngai ngwende naye awa yambo ete baya epai nanga!’ na botosi bonso?

40. (moto) moko azalaki na boyebi ya buku alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete obuka miso nayo. Mpe tango amonaki yango etelemi liboso naye, alobaki ete: (Suleyman) oyo ezali bolamu ya Nkolo na ngai, ameki ngai na yango soki nakotondo ye to nakozanga ye botondi, kasi oyo akotondo ayeba ete ezali тропа bolamu naye moko, mpe oyo akoboya kotondo, ya solo, Nkolo na ngai atonda bomengo azali malamu.

42. Tango ayakaki balobaki naye ete (mokonzi mwasi wana): Boye oyo ngwende nayo te? Azongisaki ete ezali lokola yango! (Alobi Suleyman): Tozuaki boyebi liboso naye mpe tomisokie (tokomi bamizilima).

44. Мре balobaki naye: Kota na ndako, mpe tango amonaki yango lokola mayi ya mozindo, amonaki makolo naye ebimi na elilingi, (Suleyman) alobi naye: Oyo ezali ndako esalami na milangi ya talo,: (Mwasi mokonzi!) alobaki ete: Nkolo, ya solo namibubaki ngai moko, na yango namisoki elongo na Suleyman epai ya Allah Nkolo ya mokili mobimba.

46. Alobi: Oh bato na ngai! Mpona nini bozali kowelisa kosala mabe mpe botiki kosala bolamu? Soki ata bosengaki bolimbisi epai ya Allah, tango mosusu bokoyambema na ngolu naye?

47. Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama.

48. Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te.

49. Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo.

50. Mpe basali likita ya mabe, mpe tosalelaki bango lokola, kasi bazalaki koyeba te.

54. Mpe Loth tango ayebisaki na bato naye ete: Bozali kosala mabe (kokutana mibali na mibali na nzela ya sima) mpe bozali kornona?

58. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya lolenge wana тропа baye bakebisamaki!.

59. Loba: Matondo na Allah, mpe kimia ezala likolo ya bawumbu naye oyo baponami na (bolamu), boye Allah nde azali malamu to banzambe oyo bazali kosangisa naye nde baleki malamu?.

60. Ezali ye te nde akela likolo na mabele mpe azali kokitisela bino mbula kowuta na likolo, mpe tobimiseli bino bilanga na milona ya kitoko? Bozalaki na makoki moko te ya kokolisa banzete na yango, boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi bazali nde bato ya kokokisa Allah na eloko.

61. Ezali ye te nde atandi mabele тропа kofanda? Mpe atiolisi mingala okati na yango? Mpe apiki bangomba likolo na yango? Mpe akaboli bibale mibale ete bikutana te? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi ebele na bango bazali koyeba te.

63. Ezali ye te nde azali kokamba bino na molili ya mokili mpe molili ya ebale? Mpe nani azali kotindaka mopepe lokola sango ya malamu na ngolu naye? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Allah azali likolo koleka maye bazali kosangisa na yango.

64. Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló.

67. Мре bapengwi balobi: Boye tango biso na batata na biso tokokomaka putulu, tokosekwisamaka lisusu (kowuta na malita)?

70. Kozala na mawa na bango te , mpe koyoka mpasi te тропа mwango na bango bazali kosala.

71. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini, soki bozali koloba bosóló.

74. Mpe Nkolo wayo ayebi sólo maye bazali kobomba o mitma mia bango, mpe maye bazali komonisa polele.

77. Мре ya sólo, yango ezali bokambi mpe ngolu тропа bandimi.

78. Ya sólo, Nkolo wayo akokataka o kati kati na bango na mibeko mia ye. Mpe azali wa bokasi atonda boyebi.

83. Mpe mokolo moye tokosangisaka na umma(1) nionso bato ebele, baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, banso bakotelema na milongo.

84. Kino tango bakokoma, (Allah) akolobaka: Boye boboyaki kondimela bilembo bia ngai, mpe botiki kokangama na yango mpe bozali koyeba, to bozalaki kosala nini?

85. Mpe liloba likokweyaka likolo lia bango тропа bobubi bwa bango, mpe bakokoka koloba eleko te.

87. Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso.

88. Mpe okomona bangomba okanisi ete yango ezali makasi, kasi yango ekomi kotambola lokola londende na likolo, wana ezali mosala ya Allah oyo abongisa lolenge ya biloko binso. Ya sólo, ye azali na sango ya maye bozali kosala.