عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Story [Al-Qasas] - Lingala translation

Surah The Story [Al-Qasas] Ayah 88 Location Maccah Number 28

1. Twâ, sín, mîm.(1)

9. Mpe mwasi ya falo alobaki ete: (na mobali naye) oyo azali esengo ya liso na ngai mpe esengo ya liso nayo. Boboma ye te, akoki kosalisa biso ndele to mpe tokokomisa ye mwana na biso, mpe bazalaki koyeba te.

12. Mpe topekisaki ye mabele ya bato mosusu, mpe ndeko naye ya mwasi alobaki na bango ete: Bolingi nalakisa bino libota moko ekobokolo ye malamu тропа bino? Bakozala naye malamu penza.

18. Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele.

28. (Mûssa) alobi: Tosili koyokana ngai nayo, oyo na коропа kati ya makambo mibale oyo, nakozala na lisumu te. Mpe Allah nde azali mobateli na oyo tozali koloba.

33. (Mûssa) alobi: Nkolo ya soló, nabomaki moto epai na bango, nazali kobanga noki bakoboma ngai.

34. Mpe ndeko wa ngai Hâruna azali koloba malamu koleka ngai, tinda ye elongo na ngai, azala (molobeli wa ngai) mpo bandimela ngai. Nazali kobanga bazwa ngai moto ya lokuta.

53. Mpe soki batangeli bango yango balobi: Tondimi na yango ya sólo, ezali bosembo oyo ewuti epai ya Nkolo wa biso, tosila kokoma bamizilima yambo ete ekomela biso.

54. Bango nde bakozuaka lifuta lia bango mbala mibale тропа maye bakangaki motema na yango, mpe mpo bayanolaki malamu na esika ya mabe, mpe bazalaki kobimisa ndambo ya maye topesaki bango.

55. Mpe soki bayoki (maloba) mazanga ntina bapesi yango mokongo mpe balobi ete: Biso na misala mia biso mpe bino na misala mia bino, kimia ezali likolo na bino, biso tozali koluka bayinga te. (baye bazanga boyebi)

60. Nyoso oyo bopesamaki ezali тропа komisepelisa na bomoyi ya mokili na bisengo bia yango. Mpe oyo ezali epai ya Allah nde eleki malamu, mpe ekotikala seko. Boye bozali koyeba te?

62. Мре mokolo akobenga bango, тропа kotuna bango ete: Wapi bambanda na ngai baye bozalaki kotutela ntolo?

68. Mpe Nkolo wayo akelaka oyo alingi mpe aponaka oyo alingi, ezali te ete: Bango bapona nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango (ye na bikeko na banzambe misusu).

69. Мре Nkolo wa yo ayebi maye mitema mia bango mibombi, mpe maye bazali kobimisa.

70. Ye nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, azali na lokumu awa na mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bokonzi bonso (ya makambo) bozali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.

88. Mpe kokumisa nzambe mosusu te elongo na Allah, Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ye. Biloko binso bikokufaka, longola sé elongi naye. Mpe kokata ya likambo ezali bwa ye, mpe epai naye nde bokozongisama.