عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Spider [Al-Ankaboot] - Lingala translation

Surah The Spider [Al-Ankaboot] Ayah 69 Location Maccah Number 29

1. Alif, lâm, mîm.(1)

13.Ya sôló penza, bakomema mikumba mia bango, mpe mikumba misusu. Mpe bakotunama na mokolo ya suka тропа maye bazalaki kosala. (тропа mabe na bango na kobuka lokuta).

15.Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye na masuwa, mpe totiyaki yango ezala elembo тропа molongo mobimba.

18. Мре soki boboyi, kaši mabota maye maleka liboso na bino basilaki mpe koboya. Na yango, motindami azali na eloko ya kosala te sé akomisa sango ya polele.

21. Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe ayokelaka mawa na oyo alingi. Mpe epai naye nde bokozongisama.

31. Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi.

32. Alobi: Ya sólo Loth azali wana, balobi: Biso toyebi malamu baye bavandi wana, tokobikisa ye na libota naye, longola sé mwasi waye, akozala o kati ya batikali тропа kozua etumbu.

33. Mpe tango batindami ba biso bakomaki epai na Loth, abangaki mpe ayokaki mpasi na motema тропа bango ete bakotungisama na bato ya mboka, kasi balobaki naye ete; kobanga te, mpe koyoka mpasi te, tokobikisa yo mpe libota nayo. Longola sé mwasi wayo, akozala o kati ya babebisami.

37. Bazuaki ye moto ya lokuta, mpe etumbu ya boningani ya mabele ezuaki bango mpe tongo etanelaki bango basili kokufa na bandako na bango.

38. Mpe lolenge moko tobebisaki bato ya mboka aad mpe thamûd, bozali kornona bango polele na bisika na bango. Mpe satana abongiselaki bango misala mia bango, mpe apekisaki bango nzela ya semba na bango bazalaki kati na koyeba te.

40. Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.

43. Wana ezali bandakisa tozali kopesa yango тропа bato, тре baye bakoki koyeba yango sé baye bazali na boyebi.

48. Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe.

54. Bazali koyebisa yo (óyela) bango etumbu na lombango, kasi ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapengwi.

60. Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi.

67. Boye bazali kornona te ete: (Ya sólo) totiaki mboka esantu(1) ezala ndako ya kimia, nzoka nde bato bazali kolongolama zinga zinga na yango? Boye bazali kondima na maye mazanga ntina mpe baboyi bolamu ya Allah?

69. Mpe baye basalaka makasi тропа biso, ya sólo tokokambaka bango na banzela na biso. Mpe ya sólo, Allah azali elongo na babongisi.