عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The family of Imran [Aal-e-Imran] - Lingala translation

Surah The family of Imran [Aal-e-Imran] Ayah 200 Location Madanah Number 3

1. Alif, Lâm, Mîm.(1)

2. Allah, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko.

4. Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu.

6. Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá.

7. Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango.

11. Ndenge ezalaki na bomeseni ya falo na bato naye, ndenge moko na baye bazalaki liboso na bango. Bazuaki bilembo mpe mikapo mia biso na lokuta. Mpe baboyaki kondima na yango, mpe Allah azuaki bango na masumu na bango. Allah azali makasi mpona kopesa etumbu.

12. Loba na baye bapengwa ete: Bokobetama mpe bokokitisama, na sima bokosangisama o kati ya lifelo. Mpe oyo nde esika ya mabe ya kofanda!

13. Ezalaki ya sôló elembo mpe ekamwiseli mpona bino okati ya mapinga mibale makutanaki na bitumba; moko ezalaki kobunda mpona Allah, mosusu ezalaki na bopengwi. Na sima mapinga ya bandimi ekomaki komimona ete bakomaki mbala mibale koleka. Allah asalisaka oyo ye alingi na elonga naye moko. Ya sôló wana ezali liteya mpona bato bazali na miso ya komona.

15. Loba: Bolingi nalakisa bino eloko ya malamu koleka maye bozali na yango? Mpona baye babangi (Allah) bazali na paladiso ya nkembo, epayi ya Nkolo wa bango, okati na yango mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati mpe bakozala na basi baye bapetuama, mpe esengo kowuta epai na Allah. Allah azali komona bawumbu naye.

17. Baye bazali kokanga mitema, mpe bato ya bosembo, mpe bato ya botosi, mpe baye babimisaka mpona Allah, mpe baye basengaka Allah bolimbilisi yambo ete ntongo etana.

18. Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya.

25. Mpe ekozala ndenge kani tango tokosangisa bango o mokolo moye mokozala na ntembe te, mpe molimo na molimo akofutama engebene na maye asalaki? Mpe bakobubama te.

35. Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi.

37. Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb(1) epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te.

39. Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab,(2) balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu.

40. Mpe alobi ete: Eh Nkolo! Ndenge nini nakozua mwana mpe ngai nasili kokoma mobange, mpe mwasi na ngai abotaka te? (Allah) alobi: Ndenge wana nde, Allah asalaka oyo alingi.

43. Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami.

45. kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah).

46. Mpe Akoloba na bato wuta mbotama naye, mpe tango akokola, mpe azali kati na bato ya malamu.

49. Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi.

52. Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia.

54. Mpe basalaki likita ya mabe, Allah mpe asalaki likita, kasi Allah nde azali likolo ya makita nyoso.

59. Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki.

60. Bosembo ezali nde epai na Nkolo nayo. Kasi kozala te elongo na baye bazali na koyimayima.

73. Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.

83. Bazali koluka lingomba mususu, mpe batiki lingomba ya Allah ya sôló, ye oyo bikelamu binso bizali na likolo mpe na nsé, bazali komikitisa, balinga balinga te, mpe epai naye nde bakozongisama.

95. Loba: Allah olobi bosembo ete: Bolanda bosôló ya lingomba ya Ibrâhîm na kati ya bomoko ya Allah, kasi (Ibrâhîm) azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah).

96. Ya sôló, ndako ya yambo oyo etiamaki na mokili mpona bato, ezali ndako esantu ya Makkah, oyo epambolama, yango ezali nzela ya bokambi mpona mokili mobimba.

97. Kati na yango bilembo bizali, ndakisa esika eye Ibrâhîm atelemaki. Oyo akokota na kati na yango abatelami. Mpe esengeli na bato kosala hajj pona Allah na ndako wana, mpo na moto oyo azui makoki ya kokoma kuna. Kasi oyo akoboya, ya sôló, Allah atonda bomengo koleka mokili mobimba.

107. Kasi mpona ba oyo bilongi na bango bikongenga, bakozala o’kati ya ngolu(1) ya Allah epai kuna bakozala seko na seko.

111. Bakokoka te komonisa bino mpasi ya minene, sé ya mikemike. Mpe soki babundisi bino, suka suka bakopesa mokongo mpe bakokima, mpe bakosalisama te.

121. Mpe tango otikaki libota nayo na ntongo, okei mpona kolakisa bandimi bisika bakotelema mpona kobunda. Mpe Allah azali Moyoki atonda boyebi.

122. Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango.

123. Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr.(1) Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi.

125. Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba.

133. Bowela kosala misala ya malamu miye mikopesa bino bolimbisi epai na Nkolo wa bino, mpe paradizu eye monene na yango ezali lokola likolo mpe mabele, Eye ebongisamaki mpona babangi.(1)

138. Oyo ezali mateya ya polele mpona bato, mpe lisungi na malendisi mpona babangi.(1)

151. Tokotia kobanga na mitema ya bapagano mpo ete bango basangisaki Allah na maye bazalaki na bilembetele na yango te kowuta epai naye. Na yango efandelo na bango ekozala okati ya môtô, oyo nde esika ya mabe mpona bato ya mabe!

153. Tango bokimaki (kobunda) bozongaki sima te mpona kosalisa ata moto moko, mpe motindami (Muhammad) azali kobenga bino. Mpe (Allah) apesaki bino mawa likolo na mawa mpo ete boyoka mpasi te na mitema mpona biloko bozangaki kozua, mpe na makambo mazuaki bino. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.

154. Sima ya ba mpasi, (Allah) akitiseli bino kimia, mpe mpongi ezuaki lisanga kati na bino, kasi basusu kati na bino bazuaki mpasi o mitema mia bango, mpe bakaniselaki Allah makanisi ya mabe, makanisi ya bopagano ya kala, bazali koloba ete: Litomba nini tozali na yango Bazali kobimisela yo te maye mabombami o mitema mia bango, bazali koloba ete: Soki tozalaki na litomba na likambo oyo, nde banguna bakokaki te koboma biso na esika oyo. Loba: Ata soki bofandaki na bandako na bino, baye mikolo na bango ya liwa ekoki bakobima, mpe bakei na bisika bibongisamaki mpona liwa na bango. Yango ezali komekama mpo Allah ayeba maye mazali okati ya mitema na bino, mpe mpo apetola maye mazali o mitema na bino. Mpe Allah ayebi mpenza maye mafandi na mitema.mpona likambo oyo? Loba na bango ete: Ya sôló likambo yango nyoso lizali mpona Allah.

159. Mpe mpona ngolu ya Allah atia na motema nayo, ozalaki mpete mpe malamu na bango. Kasi soki ozalaki na makambo ya makasi mpe motema makasi nde bakimaki nyonso pembeni nayo. Limbisa bango mpe sengela bango bolimbisi, mpe yokana na bango (liboso ozwa mokano) na likambo. Mpe soki ozwi mokana tia elikia epai ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye batiaka elikia naye.

161. Ntoma azali te oyo akolekisa ndelo na bozui (biloko ya bitumba), mpe oyo akolekisa ndelo na bozui, akoya na oyo alekisaki ndelo mokolo ya suka, sima moto na moto akozua mbano eye molimo mwa ye mosalaki, bakobubama te.

162. Boye oyo azali kotambola engebene na mibeko mia Allah azali lokola moto oyo nkanda ya Allah ezali likolo naye? Mpe esika naye ekozala na lifelo, oyo nde bozongi ya mabe!

163. Bazali na lokumu ndenge moko te epai na Allah, mpe Allah azali komona maye bazali kosala.

165. Nini! Tango mpasi ezui bino, boyeba ete bomonisaki bango mpasi mbala mibale na oyo ezui bino, na sima bolobaki ete: Oyo ewuti wapi? Loba na bango ete: Ewuti epai na bino moko, ya sôló Allah azali na nguya ya biloko binso.

168. Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.

173. Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.

174. Mpe bazongaki na bolamu mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe likama moko ya banguna ezuaki bango te, mpe balandaki maye mazali kosepelisa Allah, mpe Allah atonda bomengo koleka.

184. Mpe soki bazui yo moto ya lokuta, ya sôló basilaki kozwa batindami liboso nayo bato ya lokuta, bayelaki bango bilembo bia polele, mpe malendisi mpe buku ya bongengi.

186. Ya sôló, bokomekama mingi kati na bozui na bino mpe na banzoto na bino. Mpe bokoyoka maloba ebele ya mabe kowuta epai ya baye bazua buku liboso na bino, ndenge moko na basambeli ya bikeko. Mpe soki bokangi mitema, mpe bobangi (Allah). Ya sôló, wana ezali lolenge ya malamu ya kosilisa makambo.

189. Mpe maye manso mazali o’likolo mpe na nsé, mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.

191. Baye bazali kokanisa Allah ya kotelema mpe kofanda, mpe ya kolala na mipanzi na bango, mpe bazali kososolo okati ya bokeli likolo mpe mabele eh Nkolo na biso! Maye manso tozali komona okeli yango mpamba te, nkembo nayo, mpe bikisa biso na etumbu ya móto.

197. Esengo ya moke, sima esika na bango ya kofanda ekozala móto, oyo nde esika ya mabe.