عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Originator [Fatir] - Lingala translation

Surah Originator [Fatir] Ayah 45 Location Maccah Number 35

3. Oh bino bato! Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, boye bozali na mokeli mosusu elongo na Allah oyo azali koleisa bino olikolo kino na nsé? Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te bobele ye, na yango тропа nini bozali kopesa bosembo mokongo?

4. Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama.

12. Mpe bibale mibale bikokani te, oyo ezali mpiyo kitoko тропа komela, mpe oyo mosusu ezali mungwa mpe bololo, mpe na nyoso mibale bozali kolia misuni na yango, mpe okati na yango, bozali kobimisa mabanga na biloko ya bonzenga тропа kolata, mpe okomona masuwa ya monene ezali kotambola na mayi na makelele ya makasi, etondi na mikumba, bozali kotambola na yango тропа koluka bolamu ya Allah, mpo ete bozala na botondi na (ye).

13. Мре azali kokotisa butu kati na mokolo mpe mokolo okati ya butu mpe akeli sanza na moyi, mpe moko na moko ezali kotambola na nzela na yango na tango na yango. Oyo nde Allah oyo azali Nkolo wa bino. Azali na bokonzi bonso, kasi baye bozali kobelela na esika naye, bazali na eloko moko te ata lokola mposo ya mbuma ya tamru.

16. Soki alingi, akolimwisa bino mpe akoya na bikelamu ya sika, (bato)

19. Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona,

24. Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma(1) moko te oyo eleka sé bazua mokebisi.

26. Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki!

28. Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám(1) binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi.

29. Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te.

30. Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi.

45. Mpe soki Allah azuaka bato na maye bazali kosala, nde ata nyama токе elingaki kotikala te, (likolo ya mabele ezala na bomoyi), kasi azali kozelisa bango kino mokano ekokoka. Mpe tango mokano ekokokisama (ekozuaka bango), ya soló Allah azali kornona malamu bawumbu naye.