عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Sad [Sad] - Lingala translation

Surah Sad [Sad] Ayah 88 Location Maccah Number 38

1. Swâd,(1) na kurani, eye ezali na bokundoli.

3. Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te.

4. Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta.

8. Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai.

10. То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta.

11. Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala.)

12. Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima.

13. Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)

17. Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah).

19. Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)

21. Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)

23. Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe.

25. Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga.

27. Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)

30. Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi.

31. Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu,

32. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi.

36. Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete.

37. Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala,

38. Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo.

40. Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga.

42. Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu.

43. Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele.

44. Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi.

50. Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango.

52. Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te.

53. Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta.

56. Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana!

58. Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana.

60. Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana!

62. Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe?

65. Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka.

66. Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi.

67. Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene.

75. (Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka?

78. Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka.

84. (Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba.

87. (Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.