عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Forgiver [Ghafir] - Lingala translation

Surah The Forgiver [Ghafir] Ayah 85 Location Maccah Number 40

1. Há, mím.(1)

3. Molimbisi masumu mpe moyambi tubela, mopesi etumbu ya makasi, Nkolo ya bomengo, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye. Mpe epai naye nde bozongi bokozalaka.

5. Liboso na bango, bato ya Nûh basilaki koboya (ntoma) sima na bango, bato ya makita mpe baboyaki lokola, mpe bato na bato bamipesaki тропа kobundisa motindami na bango, mpe baye ya lokuta тропа kobundisa bosembo, mpe nazuaki bango, mpe ndenge nini etumbu na ngai ezalaki?

7. В aye bazali komema ng wende naye, (ba anzelu) тре na baye bazingami pembeni na yango bazali kokumisa Nkolo wa bango, тре bazali kondima naye, тре bazali kosengela bandimi bolimbisi, (bazali koloba): Nkolo, eloko nyoso etondisami na ngolu nayo na boyebi, limbisa baye bazali kotubela mpe baye bazali kolanda nzela nayo, mpe batela bango na etumbu ya moto.

9. Mpe tia bango mosika na etumbu ya misala ya mabe, mpo moto oyo okotia ye mosika na (etumbu) о mokolo wana, asili kozua ngolu nayo. Mpe wana nde ekozala elonga monene.

10. Mpe тропа baye bapengwaki bakobengaka bango mpe kanda ya Allah likolo na bino eleki makasi mingi likolo ya kanda na bino moko tango bobengamaki na bondimi, boponaki sé kotikala na bopengwi.

12. Bozalaki soki (nkombo) ya Allah ebengami na bomoko bwa ye, bozali koboya kondima, mpe soki basangisi ye (Allah) bondimi, mobeko ya kokata likambo ezali ya Allah, wa likolo azali monene.

14. Bokumisa Allah na bomoko mpe kolanda lingomba lia bosôló, ata soki bapengwi bazali koboya.

17. Lelo molimo (moto) nyoso mokozua lifuta kolanda na maye asalaki, lelo kobuba bozali te, ya soló, Allah azali noki тропа kofuta.

18. Mpe kebisa bango тропа mokolo moye mozali pene (mokolo ya suka), tango mitema na mingongo mikomataka mpe mikokangama. В abubi bakozuaka moninga ya kosalisa bango te mpe kosunga bango te.

19. (Allah) ayebaka mabe oyo miso esalaka, mpe manso maye mabombami o mitema. (mia bato)

24. Epai ya falo na Hâmân na Qârûn, kasi balobaki ete: Oyo nganga moto ya lokuta monene.

27. Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te.

28. Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te.

30. Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga.

37. Banzela ya likolo, mpo namata epai ya Nzambe ya Mûssa, kasi nayebi ete ye azali moto ya lokuta. Lolenge wana nde falo azalaki kokanisa ete azali kosala malamu nzoka nde azalaki kosala mabe koleka, mpe abungaki nzela ya semba. Kasi likita lia falo lizalaki sé bozangi na bokufi.

39. Eh bato na ngai! Bomoyi boye bozali sé kosepelisa na mwa tango токе, kasi mokolo mwa lobi mozali esika (ndako) kitoko тропа kofanda.

41. Mpe Oh bato na ngai! Nini na ngai, nazali kobenga bino na lobiko, kaši bino bozali kobenga ngai na móto?

43. Tembe ezali te na oyo bozali kobenga ngai naya epai naye, azali na bosôló te, ye akoki kondimela (mabondeli) te, ezala awa na mokili to na mokolo ya suka, mpe bozongi bwa biso bokozalaka nde epai ya Allah, mpe ya soló bato ya mabe esika na bango ekozalaka nde móto.

48. Bato ya lolendo bakolobaka: Ya sólo, biso banso tozuami na kati na yango, kasi Allah asili kokata makambo kati kati ya bawumbu (baye)

54. (Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa.

62. Wana nde Allah Nkolo wa bino, mokeli wa biloko binso, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosoló sé ye mei, boye тропа nini bozali kotika (nzela ya semba?)

65. Azali na bomoyi, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye mei, bobelela ye na bomoko bwa ye, mpe holanda lingomba lilamu (islamu), lokumu na Allah Nkolo wa molongo.

77. Kanga motema; ya soló, elaka ya Allah ezali ya solo. Tango mosusu tokolakisa yo ndambu ya etumbu tolengeli тропа bango, to mpe tokoboma yo yambo ete eyela bango, mpe epai na biso nde bakozongisama.

81. Mpe azali kolakisa bino bilembo bia ye, boye bilembo kani bia Allah bokoki koboya?