عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Explained in detail [Fussilat] - Lingala translation

Surah Explained in detail [Fussilat] Ayah 54 Location Maccah Number 41

1. Hâ, mîm(1).

2. Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu.

3. Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba.

4. (Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te.

11. Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso.

13. Soki baboyi loba (na bango): Nakebisaki bino etumbu oyo ekoboma, lokola oyo ezuaki bato ya Aad na Thamûd.

19. Мре mokolo oyo banguna ya Allah bakosangisama ebele тропа kokende na moto, тре bokotindikama okati na yango.

21. Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama.

25. Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi.

32. O esika ya boyambi epai ya molimbisi atonda ngolu.

33. Nani azali na liloba kitoko koleka moto oyo azali kobenga bato epai na Allah, mpe asali mosala ya malamu, mpe alobi ete: Ya sólo, ngai nazali okati ya bamizilima.

39. O kati na bilembo bia ye, ozali kornona mabele ekawuki na botosi mpe bobangi, mpe tango tokitisaka mayi likolo na yango, etombwamaka mpe ekomi monene. Ya sólo oyo apesi yango bomoi, ye nde akosekwisa bawa. Ya sólo, azali na bokoki likolo ya biloko binso.

43. Oyo ezali kolobama ezali sé oyo esila kolobama na batindami liboso nayo. Ya soló, Nkolo nayo atonda bolimbisi mpe azali makasi na kopesa etumbu.

46. Oyo akosala malamu, ezali mpona ye moko, mpe oyo akobebisa ezali sé mpona ye moko. Kasi Nkolo wayo abubaka kati kati ya bawumbu naye te.

47. Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda.

48. Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te.

52. Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano?

53. Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso.