عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Ornaments of Gold [Az-Zukhruf] - Lingala translation

Surah Ornaments of Gold [Az-Zukhruf] Ayah 89 Location Maccah Number 43

1. Há, mím.(1)

2. Mpe buku eye elimbolama polele.

4. Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya.

8. Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo.

10. Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango).

11. Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama.

15. Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele.

17. Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân(1) (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)

18. (Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe.

26. Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela.

27. Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)

28. Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah.

29. Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele.

34. (nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela.

36. Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân(1), tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela.

37. Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba.

38. Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe!

40. Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele?

41. To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango.

44. Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama.

45. Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán(1) тропа kobondela bango?

48. Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso.

49. Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba.

50. Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka.

56. Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango.

57. Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)

58. Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana.

67. O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)

71. Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango.

77. Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango.

80. To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu).

81. Loba: Soki Ar-Rahmân(1) azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela.

85. Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama.

86. Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba.

87. Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo?

88. Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te.

89. Malamu, mitiya mosika na bango (limbisa bango) mpe loba: Boboto. Kala mingi te bakoyebaka.