عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Smoke [Ad-Dukhan] - Lingala translation

Surah The Smoke [Ad-Dukhan] Ayah 59 Location Maccah Number 44

1. Hâ, mîm.(1)

4. O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama.

7. Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te.

8. Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo.

9. Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana.

13. Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele.

20. Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te.

23. Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino).

26. Bilanga na milona na bandako ya kitoko,

27. Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango?

28. Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu.

37. Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe?

40. Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso.

42. Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu.

44. Ekozalaka bilei ya basumuki.

45. Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu.

46. Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi.

49. Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu!

51. Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko.

52. Kati na bilanga na mingala (mia lola)

54. Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene.

55. Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso.

58. Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli.