عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The wind-curved sandhills [Al-Ahqaf] - Lingala translation

Surah The wind-curved sandhills [Al-Ahqaf] Ayah 35 Location Maccah Number 46

1. Hâ, mîm.(1)

6. Мре tango bakosangisa bato (тропа bokati makambo), bakozalaka banguna na bango тре bakowangana mabondeli na bango.

8. То тре bazali koloba ete: Asali yango na ndenge naye, loba: Soki nasali yango na ndenge na ngai, bokosala ngai eloko moko te liboso ya Allah, ayebi malamu maye bozali kopanza sango (na mabe тропа kobukela kurani lokuta). Akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe azali molimbisi atonda ngolu.

17. Mpe oyo akoloba (akofiotola) na baboti naye: Ufi, bozali kolaka ngai ete nakosekwa? Kasi ebele basila koleka liboso mpe bazonga te? Mpe bango mibale bazali kosenga libateli epai Allah, mpe bazali koloba naye: Mawa nayo, ndima elaka ya Allah ezali ya sólo. Mpe azali kozongisela bango ete: Oyo ezali sé masapo ya kala.

19. Bato banso bazali na esika na bango mpo na oyo bazalaki kosala, mpe bakofutaka bango engebene na misala na bango mpe bakobubama te.

22. Balobaki: Oyeli biso mpo oboyisa biso banzambe na biso? Na yango yela biso oyo ozali kolaka biso soki ya soló, ozali okati ya bato ya bosembo.

25. Ebebisaki nyoso na mibeko mia Nkolo na yango, sima na yango na tongo, bango banso bamonanaki lisusu te, etikalaki sé bandako na bango. Lolenge wana nde tofutaka batomboki.

28. Mpona nini bazuaki lisungi te epai ya baye bazuaki bango banzambe na botiki Allah? Ete: Bango nde bakopusanisa bango pembeni na Allah, kasi banzambe yango basundoli bango. Wana ezali lokuta na bango oyo bazalaki kosala.