عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The moon [Al-Qamar] - Lingala translation

Surah The moon [Al-Qamar] Ayah 55 Location Maccah Number 54

3. Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango.

5. Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te.

8. Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo.

9. Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye.

10. Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)

14. Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango.

16. Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki?

17. Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa?

18. Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?

21. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?

22. Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa?

23. Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi.

25. Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene.

27. Ya sólo, totindelaki bango náqah(1) lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema.

28. Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye.

29. Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye.

30. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?

32. Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa?

34. Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana.

35. Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)

36. Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi.

39. Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai.

40. Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa?

42. Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki.

43. Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi?

47. Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto.

50. Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso.

51. Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te?

52. Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)

53. ( Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama.

54. Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango.

55. Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah).