عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Beneficient [Al-Rahman] - Lingala translation

Surah The Beneficient [Al-Rahman] Ayah 78 Location Maccah Number 55

5. Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama.

6. Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango),

10. Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi,

12. Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi.

13. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima).

20. Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te.

22. Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga).

26. Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi).

29. Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika.

31. Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)

41. Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango.

44. Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi.

46. Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola),

48. Okati na yango ezali na bolamu mibale,

50. O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola,

54. Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka.

56. Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango,

58. Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga.

62. Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso,

64. Bizali na langi ya mpondu ya moyindo,

66. Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi,

68. Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l(1) na rummân(2),

70. Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu,

72. Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma,

78. Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto.