The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe Event, The Inevitable [Al-Waqia] - Lingala translation
Surah The Event, The Inevitable [Al-Waqia] Ayah 96 Location Maccah Number 56
1. Tango likambo monene ekokweya,
2. Koya na yango ezali lokuta te.
3. Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
4. Tango mabele makoninganaka makasi,
5. Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike,
6. Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana.
7. Mpe bokozalaka lisanga misato:
8. Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali!
9. Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi!
10. Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka.
11. Baye wana nde bakozalaka pene na Allah.
12. O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu.
13. Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso,
14. Мре moke okati ya bato ya sima.
15. (Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo,
16. Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
17. Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela,
18. Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli).
19. (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te.
20. Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka,
21. Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi.
22. Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala,
23. Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga,
24. Lifuta тропа maye basalaki.
25. Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te.
26. Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia.
27. Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali!
28. Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr,
29. Na banzete ya makemba na bitabe,
30. Na nsé ya malili ya monene,
31. (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela,
32. Mpe bambuma ebele,
33. Babuki yango te mpe epekisami te.
34. O likolo lia bambeto ya likolo.
35. Biso nde tokelaki bango na bokeli,
36. Mpe tosalaki bango bayebi mibali te,
37. Bazali bambula ndenge moko.
38. Mpona bato ya loboko ya mobali.
39. Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso,
40. Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka.
41. Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana!
42. Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka,
43. Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo,
44. (kati na yango) malili te mpe kitoko te.
45. Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko.
46. Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi.
47. (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu?
48. Na bankoko ya biso ya yambo?
49. Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka,
50. Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani.
51. Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka),
52. Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm(1).
53. Mabumu na bino makotondaka na yango.
54. Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi.
55. Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso).
56. Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka.
57. Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te?
58. Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo?
59. Bino nde bokela yango to biso nde bakeli?
60. Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te,
61. Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te.
62. Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te?
63. Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)?
64. Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni?
65. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
66. Tala biso tokomi na banyongo,
67. Kasi bapimeli nde biso.
68. Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela?
69. Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi?
70. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah).
71. Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te?
72. Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli?
73. Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
74. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene.
75. (Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka,
76. Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka,
77. Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu,
78. Ebatelami kati na buku.
79. Basimbaka yango te sé na bapetoami,
80. Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili.
81. Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta?
82. Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani?
83. Tango mpema ekomata tii na mongongo,
84. Mpe tango wana bozali kotala.
85. Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te.
86. Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te).
87. Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo?
88. Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah),
89. (Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo.
90. Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali,
91. (Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali!
92. Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi,
93. Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi.
94. Mpe akozikisama okati ya moto.
95. Wana nde likambo ya soló.
96. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene