عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

She that disputes [Al-Mujadila] - Lingala translation

Surah She that disputes [Al-Mujadila] Ayah 22 Location Madanah Number 58

1. Allah asili koyoka ya soló liloba ya oyo azali koyebisa yo тропа mobali naye, azali kofunda epai ya Allah, тре Allah azali koyoka lisolo ya bino mibale. Ya solo Allah azali moyoki mpe momoni.

2. Baye kati na bino bazali koboya basi na bango, na kokokisa bango ete bazali lokola mokongo ya bamama na bango, bazali ba mama na bango te, bamama na bango nde ba oyo babotaki bango. Ya soló bazali wana koloba liloba ya mabe mpe lokuta. Mpe Allah azali na ngolu atonda bolimbisi.

3. Baye bazali koloba na basi na bango été bazali lokola mokongo ya bamama na bango, sima bazongeli (bango) тре basaleli oyo balobaki te, esengeli na bango kokangola mowumbu moko yambo ete basangana na bango. Wana ezali тропа kolendisa bino, тре Allah azali na sango ya maye bozali kosala.

4. Мре oyo azui makoki te тропа kokangola mowumbu, akila (akanga) ngizi sanza mibale elandani yambo ya kosangana na mwasi naye, mpe oyo akokoka te aleisa babola ntuku motoba wana mpo bondima na Allah na motindami waye. Мре wana ezali bandelo oyo Allah atieli bino lotomo, тре тропа bapengwi bakozala na etumbu ya makasi.

8. Boye ozali kornona te тропа baye bapekisi bango kosolola na likita ya mabe, sima bazongeli oyo bapekisaki bango, mpe bazali kosolola mabe na kotiya bonguna mpe bazangi kotosa motindami, mpe soki bayei kotala yo, bazali kopesa yo mbote lolenge oyo Allah apesaka yo te, mpe bazali komilobela bango moko: Mpona nini Allah azali kopesa biso etumbu te mpona maye tozali koloba? Moto ya lifelo mokoki na bango, bakozikisamaka kuna, mpe boye esika nini ya mabe ya koleka wana!

21. Allah asila kokana été: Nakolonga ngai na batindami na ngai. Ya sólo Allah azali makasi atonda nguya.