عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

She that is to be examined [Al-Mumtahina] - Lingala translation

Surah She that is to be examined [Al-Mumtahina] Ayah 13 Location Madanah Number 60

4. Ya soló, Ibrâhîm azali ndakisa malamu тропа bino mpe baye bazalaki elongo na naye, tango balobaki na bato na bango: Ya soló, biso tozali mosika na bino na maye bozali kosala mpe kobondela botiki (nzela) ya Allah, emonani polele été tokabwani na bino,mpe kibonguna na koyinana ekoti kati na biso kino bokondima na Allah na bomoko bwa ye, longola sé liloba lia Ibrâhîm (oyo alobaki тропа tata naye) été: Nakosengelaka yo bolimbisi epai ya Allah, kasi nakosalisa yo na eloko te kowuta na Allah. Nkolo na biso tomipesi epai nayo mpe epai nayo nde tozali kotubela, mpe epai nayo nde bozongi ezali.

10. Oh bino bandimi! Soki bandimi ya basi bakimi bayei epai na bino, bomeka bango, Allah nde ayebi kondima na bango, soki boyebi ete bazali bandimi bozongisa bango epai na bapagano te, mpo bakoki na bango te, bango mpe bakoki na bango te, mpe bozongisela bapagano mbongo na bango ya libala, mpe ezali mabe te ete bobala soki bopesi bango lifuta na bango. Mpe bobatela mabala na basambeli bikeko te, bosenga bango biloko na bino oyo bopesaki bango,mpe basenga oyo bapesaki. Oyo wana nde mobeko ya Allah azali kokata na yango kati na bino, Allah azali moyebi atonda bwanya.