The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe congregation, Friday [Al-Jumua] - Lingala translation
Surah The congregation, Friday [Al-Jumua] Ayah 11 Location Madanah Number 62
1. Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mokonzi, mosantu, wa nguya atonda bwanya.
2. Ye nde atindaki o libota ya baye batanga te motindami kowuta na libota na bango moko, mpo atangela bango mikapo mia ye, mpe mpo apetola bango, mpe atangisa bango buku mpe bwanya, ata bazalaki liboso kati na libunga ya polele.
3. Mpe basusu kati na bango baye bakutanaki na bango te, bakoya sima naye, (Allah) azali wa nguya atonda ngolu.
4. Wana ezali bolamu oyo Allah apesaka na oyo alingi. Mpe AllAh azali Nkolo bolamu bonene.
5. Ndakisa ya baye bapesamaki torah mpe basaleli yango te, bazali lokola Himar(1) oyo amemi babuku, ndakisa mabe ya lolenge nini wana ya baye baboya kondima na mikapo mia Allah. Mpe Allah akambaka babubi te.
6. Loba: Oh bino baye bozali kosalela kiyuda! Soki bozali kokanisa été bolingami na AllaH koleka bato basusu, bomisenga liwa soki ya soló bozali na bosembo.
وَلَا يَتَمَنَّوۡنَهُۥٓ أَبَدَۢا بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ [٧]
7. Kasi bakokoka komisenga yango soki шоке te, тропа maye ya mabe basalaka. Kasi (Allah) ayebi malamu babubi. (bato mabe)
8. Loba: Ya sólo, liwa oyo bozali kokima bokokutana na yango, sima bokozongisama epai ya oyo ayebi maye mabombami na maye mazali polele. Akoyebisa bino sango ya maye bozalaki kosala.
9. Eh bino baye bondima! Soki bobengami тропа losambo ya jumu’a (ya mokolo ya mosala mitano), bökende na lombango koyoka bokundoli ya Allah тре botika koteka, wana ezali malamu тропа bino soki boyebaki.
10. Mpe soki losambo esili, bopanzana na mabele тропа koluka bolamu ya Allah, mpe bokanisa Allah mingi mpo bolonga.
11. Mpe tango bamoni mombongo to bisengo eleki, balandi yango mpe basundoli yo na esika ya kotelema (na mimbar). Loba: Oyo ezali epai ya Allah ezali malamu koleka mombongo na bisengo, mpe Allah nde mopesi bozui malamu.