عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Sovereignty [Al-Mulk] - Lingala translation

Surah The Sovereignty [Al-Mulk] Ayah 30 Location Maccah Number 67

1. Apambolama ye oyo azali na bokonzi na maboko naye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso.

5. Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo.

6. Mpe тропа baye bapengwa na Nkolo wa bango. Bakozuaka etumbu ya lifelo, mpe bozongi nini ya mabe wana!

10. Mpe bakolobaka: Soki toyokaka mpe tokanisaka (malamu) tolingaki kozala okati ya bato ya lifelo ya saira te.

13. Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)

16. To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana?

17. To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali.

18. Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini?

30. Loba: Bomoni boni soki mayi na bino ekomi mosika na nsé ya mabele, nani mosusu akopesa bino mayi kowuta na libulu?