عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Pen [Al-Qalam] - Lingala translation

Surah The Pen [Al-Qalam] Ayah 52 Location Maccah Number 68

1. Nún(1), (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma.

2. Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te.

9. Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo.

10. Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te.

11. Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo.

12. Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu,

13. Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo.

14. Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

18. Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

20. Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te.

21. O mokolo molandi: Babiangani bango na bango.

23. Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende,

25. Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola.

26. Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso,

27. То yango; Kasi tozali na eloko te.

28. Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah?

31. Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki.

32. Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso.

34. Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko.

36. Boni bozali kokata likambo na lolenge wana?

40. Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango?

42. Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te.

45. Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló.

47. To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота?

48. Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene.