عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Nooh [Nooh] - Lingala translation

Surah Nooh [Nooh] Ayah 28 Location Maccah Number 71

2. Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino,

10. Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi.

11. Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana,

13. Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli?

14. Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama?

18. Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza.

22. Mpe basali likita ya monene, (ya mabe).

23. Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)