عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The enshrouded one [Al-Muzzammil] - Lingala translation

Surah The enshrouded one [Al-Muzzammil] Ayah 20 Location Maccah Number 73

2. Telema mpo (osambela) butu mobimba, longola sé mwa tango moke,

6. Kosambela na butu ezali malamu mpe epesaka makasi, mpe ezali malamu mingi тропа botangi.

9. Nkolo ya moniele mpe eloli, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, zúa ye mobateli (wa bino)!

10. Kanga motema na maye bazali koyebisa yo, mpe mitiya mosika na bango na lolenge ya malamu.

11. Мре tika ngai na baye bazuaka manso na lokuta baye bazali kosepela na bisengo na bango, bazali sé na tango moke ya kozela.

12. Ya soló, tobombeli bango singa ya monene mpe lifelo.

17. Ndenge nini bokomibatela na bopengwi na mokolo oyo ekokomisa bana lokola bampaka suki mpembe?

18. Likolo likopasukaka (na somo wana) mpe akokokisaka elaka naye, wana ezali na tembe te.

20. Ya soló, Nkolo nayo (Muhammad), ayebi ete otelemaka na nsé ya mibale ya misato ya butu, mpe kati kati na yango, mpe moko ya misato na yango, elongo na ndambu ya bandimi batelemaka mpe lokola. Allah azali kokabola butu na mokolo, ayebi ete bokokoka kotanga yango te yango ayambi tubeli na bino. Kasi botanga oyo ezali mpete kati na kurani, ayebi ete kati na bino bato ya bokono bakozala, basusu bakotambola тропа koluka bolamu ya Allah, mpe basusu bakokende kobunda na nzela ya Allah. Botanga oyo ezali mpete kati na yango, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokotisa Allah nyongo ya malamu. Mpe bolamu nyoso bokosala, bokokuta yango epai na Allah, azali malamu mpe monene na kofuta, mpe bosenga Allah bolimbisi. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.