The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe tidings [An-Naba] - Lingala translation
Surah The tidings [An-Naba] Ayah 40 Location Maccah Number 78
1. Na likambo nini bazali komitunana?
2. Likolo ya sango enene,
3. Eye pona yango bakeseni makanisi.
4. Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke.
5. Te sima lisusu bakoyeba yango.
6. Tozalisaki te mabele etando?
7. Mpe bangomba lokola makonzi?
8. Tokelaki bino te mibale mibale?
9. Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi?
10. Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino?
11. Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi?
12. Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama?
13. Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga?
14. Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele,
15. Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona,
16. Na bilanga ekembisami (kitoto)?
17. Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana.
18. Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga.
19. Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke.
20. Mpe bangomba bikotambola na lombango.
21. Ya solo, lifelo ezali kozela.
22. Esika yakofanda тропа batomboki.
23. O’kati na yango bakofanda seko na seko.
24. O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te,
25. Longola sé mayi ya moto ya tofina,
26. Lokola lifuta lia bosembo тропа bango.
27. Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te.
28. Mpe batiaki ntembe na maloba na biso.
29. Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda.
30. Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu.
31. Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah).
32. Bilanga mpe masanga ya bilengi,
33. Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko,
34. Mpe bankopo ebele ya bomeli.
35. O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te.
36. Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza.
37. Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân(1) bakozala na liloba te o’boso bwa ye.
38. Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân(1) (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo.
39. Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye.
40. Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele.