عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Those who drag forth [An-Naziat] - Lingala translation

Surah Those who drag forth [An-Naziat] Ayah 46 Location Maccah Number 79

1. (Na lapi) na baye bapikolaka na makasi!

2. Mpe na baye bayambaka na boboto!

3. Mpe baye batambolaka ndenge balingi!

6. Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo),

8. Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi.

10. Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa?

13. Ya sôló, yango ezali bosangisi ya mbala moko.

14. Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango.

19. Мре nakamba yo epai ya Nkolo nayo mpo obanga ye?

20. Mpe (Mûssa) alakisaki ye likamwisi linene,

21. (Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa.

22. Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo.

23. Abiangi mpe asangisi bato naye.

24. Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka.

25. Na yango Allah azwaki ye na etumbu awa na nsé mpe na mokolo ya suka.

26. Wana ya soló, ezali elembo тропа moto azali na bobangi.

28. Atombola etando na yango mpe akokisa yango.

33. Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino.

36. Moto ya lifelo mokozala polele na oyo akomona,

37. Mpona oyo alekisaki ndelo,

39. Ya soló, lifelo ekozala esika naye ya kofanda.

42. Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango?

43. Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango?

44. Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo.

45. Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana.