The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesHe Frowned [Abasa] - Lingala translation
Surah He Frowned [Abasa] Ayah 42 Location Maccah Number 80
1. Akangi elongi mpe apesi mokongo.
2. Mpo ete mokufi miso aye epai naye.
3. Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola?
4. To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye?
5. Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye,
6. Ozali koyamba ye na lombango.
7. Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te.
8. Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo,
9. Naye azali na bobangi,
10. Ozali kotala ye te.
11. Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya.
12. Oyo alingi akanisa yango.
13. Ezwami kati ya makomi ya lokumu,
14. Etombwami mpe epetolami,
15. O’maboko ma bantoma,
16. Baye ya lokumu тре botosi.
17. Moto amibomi na bopengwi naye.
18. Na eloko nini akelamaki?
19. Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye.
20. Sima alakisi ye nzela.
21. Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita.
22. Mpe akosekwisa ye na ntango alingi.
23. Moto akokisi te maye atindamaki.
24. Esengeli na moto atala bileyi naye.
25. Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi.
26. Sima topasoli mabele na nzela,
27. Mpe na nzela wana tobimisi bambuma,
28. Ba inab(1) mpe bandunda.
29. Na nzete ya zaítún(2) na nzete ya nagh’l(3),
ЗО. Мре bilanga ebele,
31. Мре tobimisi mbuma mpe matiti.
32. Bileyi тропа bino na An’âm(1) na bino.
33. Kasi tango bobulungani ekoya,
34. Mokolo moye moto akokima ndeko naye,
35. Mpe akokima mama naye mpe tata naye,
36. Akokima mwasi naye mpe bana baye.
37. Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye-
38. Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga,
39. Bakoseka mpe bakosepela.
40. Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu,
41. Bikozipama na molili.
42. Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe.