The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe Overwhelming [Al-Ghashiya] - Lingala translation
Surah The Overwhelming [Al-Ghashiya] Ayah 26 Location Maccah Number 88
1. Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa?.
2. Mokolo wana bilongi bikobanga,
3. Makambo maleki bango bakomi na bolembu,
4. Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi.
5. Mpe bakomelisa bango mayi ya moto.
6. Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube,
7. Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te.
8. Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo.
9. Bikosepela pona maye basalaki,
10. Okati ya lola ya likolo,
11. Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba,
12. Okati na yango maziba mazali kotiola,
13. Okati na yango bambeto ya kotombwama,
14. Mpe bakopo bitiami,
15. Mpe bikáta bitandami,
16. Mpe bankwala bizali ya kotandama,
17. Bazali kot ala te ba ibil(1) ndenge ekelama?
18. Mapata lolenge etombwama,
19. Mpe bangomba lolenge epikama,
20. Mpe mabele lolenge etandama?
21. Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli.
22. Kasi ozali mokengeli likolo na bango te.
23. Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima,
24. Allah akopesa ye etumbu ya monene.
25. Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango,
26. Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso