عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Repentance [At-Taubah] - Lingala translation

Surah Repentance [At-Taubah] Ayah 129 Location Madanah Number 9

3. Mpe mbela ewuti epai ya Allah na motindami waye epai na bato тропа mokolo ya hajj ya monene (mobembo esantu o mboka makkah), ya solo, Allah na motindami waye bazali mosika na basambeli ya bikeko. Soki botubeli, ezali malamu тропа bino, тре soki boboyi mpe bopesi mikongo, boyeba ete ya sólo, bokokitisa bokasi ya Allah te. Mpe pesa sango ya etumbu ya makasi epai ya baye baboyi kondima. (bapengwi.)

4. Longola sé epai ya bapagano baye bokamataki na bango elaka mpe sima balongoli тропа bino eloko te, mpe basalisaki banguna te тропа kobundisa bino mpe kosala bino mabe te, bokokisela bango elaka na bango kino tango oyo boyokanaki na bango ekoka. Pamba te ya sôló, Allah alingaka baye babangaka.

8. Ndenge nini soki balongi bino, bazali kotosa lisusu elaka te, mpe bondeko te oyo ezali kati na bino na bango? Mpe bazali kosepelisa bino na lolemu na bango, nzoka nde mitema na bango mizali koboya. Kasi ebele na bango bazali bato mabe.

10. Babatelaka elaka te, bondeko mpe te ya makila oyo ezali okati na bango na bandimi. Kasi bango nde babebisi ya mibeko.

21. Nkolo wa bango azali kopesa bango sango elamu ya ngolu naye, mpe esengo naye mpe bilanga ya lola mpo na bango, kati na yango kofanda ya kitoko.

25. Allah asilaki ya soló, kolongisa bino obisika ebele, na o mokolo mwa (bitumba) bia Huna’ín,(1) tango bosepelaki na motango monene mwa bino, kasi yango esalisaki bino na eloko te. Mabele ekomelaki bino шоке na maye bozalaki kokanisa. Sima bopesaki mikongo mpe bokimaki.

30. Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló!

33. Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango.

35. Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki.

37. Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te.

42. Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta.

46. Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki.

49. Мре kati na bango, basusu bazali koloba: Pesa ngai ndingisa (ya kotikala), kasi komeka ngai te! Kaši basilaki kokweya na kati yakomekama, mpe ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapangano.

52. Loba: Boye bozali kozela nini тропа biso okati ya bolamu mibale ya malamu (elonga to kokufa тропа Allah)? Kasi biso tozali kozela тропа bino, été Allah apesa bino etumbu to, ewuta na maboko na biso. Na yango bozela, biso mpe tozali kozela elongo na bino.

56. Мре bazali kolapa па Allah, (bato ya bilongi mibale) ete bazali penza bato ba bino, kasi bazali na bino te, mpe ya soló bango bazali kobanga bino.

57. Soki bazuaka esika ya bokimi to lidusu o nsé ya ngomba, to esika ya kokotela, balingaki bakima epai wana bango banso na lombango.

59. Mpe soki bango ya sólo, basepelaki na maye Allah na motindami waye bapesaki bango mpe balobi été: Allah akoki na biso. Allah akopesa biso bolamu bwaye, mpe motindami naye, ya sólo epai ya Allah nde tokozongisa makambo na baposa ya biso.

60. Ya sólo, makabo mazali тропа babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe тропа kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe тропа kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe тропа baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe тропа baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe тропа mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.

61. Mpe basusu kati na bango bazali komonisa ntoma pasi mpe bazali koloba: Afungoli litoyi naye тропа kolanda nyoso tozali koloba, loba: Litoyi yango ezali тропа bolamu na bino, azali kondima na Allah mpe azali na makanisi ya malamu likolo ya bandimi. Mpe azali mawa тропа basusu. Kati na bino bazali na kondima kasi baye bazali konyokolo motindami ya Allah, bakozua etumbu ya makasi.

69. Lolenge moko na baye bazalaki liboso lia bino, bazalaki makasi mingi koleka bino ezala na misolo, mpe bana mingi koleka bino. Basepelaki na bomengo oyo bakitanaki na mokili. Bino mpe bozali kosepela na oyo ya bino, lolenge bato ya liboso basepelaki, (kokitana), mpe bazali kosuanisa na bosôló te lolenge bato ya liboso basuanisaki na bosôló te, bango basili kobebisa misala mia bango o kati ya mokili mpe o mokolo mwa suka, mpe bango nde bazangi.

73. Eh ntoma! Bundisa bato ya bilongi mibale na bapagano, mpe kozala na mawa epai na bango te. Mpe esika na bango bikozalaka nde na lifelo, mpe bozongi ya mabe nini wana!

74. Bazali kolapa na Allah été basali eloko te, mpe basilaki solo koloba liloba lia bopagano, mpe babwaki kondima na bango bazongeli bopagano, mpe bakokisaki te na maye bakanaki (koboma ntoma), mpe bazali na nkanda te sé epai ya Allah na motindami naye, kowuta na maye Allah, na motindami naye bapesaki bango bozui mpe soki batubeli ekozala malamu тропа bango, kaši soki baboyi bapesi mikongo, Allah akopesa bango etumbu ya makasi, o kati ya mokili na o mokolo mwa suka. Mpe bakozuaka mobateli te mpe mosungi te na mokili.

76. Мре tango apeși bango bolamu bwaye, bakangi maboko тропа yango, mpe baboyi bapesi mikongo, balandi nzela mosusu.

79. Baye bazali kotongo bandimi baye bazali kobanga (Allah) mpe kobimisa makabo, Mpe baye bazali kozwa токе kowuta na bokasi bwa bango. Mpe lisusu bazali kofinga bandimi baye bazali na bozui токе, mpe kotiola, Allah atioli bango, kasi bakozalaka na etumbu monene.

86. Мре soki mokapo moko ekiti kowuta epai ya Allah été bandima na Allah mpe babunda elongo na motindami waye, okomona baye bazali na makoki nyoso ya kobunda bazali kosenga yo nzela mpo batikala elongo na baye batikali.

87. Bazali kosepela kotikala elongo na baye oyo bazwaki ndingisa ya kotikala тре mitema na bango masili kokangama mpe bazali koyeba eloko te.

91. Kasi baye bazangi makasi ya nzoto, na bato ya bokono, na baye bazangi eloko ya kobimisa (тропа Allah) bazali na lisumu te soki bakei kobunda te, soki bazali na bosembo na mitema mia bango тропа Allah na motindami waye. Мре basali bolamu, bazali na Likebisi te тре Allah azali molimbisi atonda ngolu.

92. Ezali mabe te тропа baye bayelaki yo mpo opesa bango bibundeli ya komatela, olobi na bango été: Nazali na bibundeli ya komatele te тропа bino. Bazongi na kolela mayi ya miso ezali kotanga na mawa nyoso été bazui eloko te ya kobimisa.

93. Kasi mabe (lisumu) ezali nde na baye bazali kosenga yo nzela ya kotikala mpe bazali na makoki nyoso ya bitumba, basepeli kotikala elongo na baye bakendeke bitumba te. Yango wana Allah abeti palata o mitema mia bango kasi bazali koyeba te.

94. Bazali kosenga bino bolimbisi soki bozongeli bango (kowuta na bitumba). Loba: Bosenga bolimbisi te, tokoki kondimela bino te. Allah asilaki soló koyebisa biso ba sango na bino. Mpe Allah akotalaka misala та bino, na motindami waye lokola, sima bokozongaka epai ya oyo ayebaka makambo ma polele na maye mabombami mpe akoyebisaka bino maye bozalaki kosala.

97. Ba arabo,(1) bazalaki na bopagano makasi koleka, mpe kozala bato ya bilongi mibale mpe bato ya liboso ya koboya mibeko miye Allah akitisaki epai ya motindami waye. Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya.

99. Мре lisusu о kati ya ba arabo basusu bazali kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka, mpe bazali kozua mabonza maye bazali kobimisa na nzela ya bopusani pene ya Allah, mpo été azua litomba ya mabondeli ya motindami. Ya sôló, wana mbeka тропа bango epai na Allah. Мре Allah akokotisaka bango na nsé ya ngolu naye, ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.

101. Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene.

103. Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.

107. Mpe baye batongi Masdjid mpo bazua yango esika ya bonyokoli mpe bopengwi mpe тропа kokabola bandimi тре kolengele yango тропа moto oyo abundisaki Allah na motindami waye liboso. Mpe bazali kolapa été balingi eloko mosusu te sé kobongisa, kasi Allah ayebi ete ya soló bango bazali babuki lokuta.

125. Kasi, mpo na baye mitema na bango mitondi na malali (bokono), ekobakisela bango mbindo likolo ya mbindo na bango, mpe bakokufa bazali bapagano.

128. Ya soló, motindami awuti kati na bino aye тропа bino na ntina ya mpasi ya kilo makasi bozalaki na yango, azalaki koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya bandimi.

129. mpe soki baboyi mpe bapesi mokongo, loba: Allah akoki na ngai, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye. Epai naye na mikabi mpe azali Nkolo ngwende ya monene.