The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe Clot [Al-Alaq] - Lingala translation
Surah The Clot [Al-Alaq] Ayah 19 Location Maccah Number 96
1. Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela,
2. Akela moto kowuta na liboke ya makila.
3. Tanga mpo Nkolo nayo azali malamu.
4. Oyo atangisi na ekomeli.
5. Atangisi moto maye azalaki koyeba te.
6. Kasi ya soló, moto akomi motomboki,
7. Ntango amimoni ete akomi na bozwi.
8. Nzoka nde bozongi ezali epai ya Nkolo nayo.
9. Omoni te moto oyo azali kopekisa,
10. Mowumbu (ya Allah) ntango azali kosambela?
11. Omonite soki azalaki na bokambi,
12. To mpe azali kotinda bato na bobangi Allah?
13. Omoni te soki aboyi kondima to apeși mokongo?
14. Ayebi te ete ya soló, Allah azali kornona?
15. Kasi soki atiki te, tokokanga ye na elongi naye.
16. Elongi ya moto ya lokuta mpe mosumuki.
17. Kasi abenga lisanga naye.
18. Biso tokobenga bakengeli ya lifelo.
19. Te, kotosa ye te, kasi pusana тре fukama (pembeni ya Nkolo nayo).