The Noble Qur'an Encyclopedia
Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languagesThe Clear proof [Al-Bayyina] - Lingala translation
Surah The Clear proof [Al-Bayyina] Ayah 8 Location Madanah Number 98
1. Bapagano kati ya baye bazwa buku mpe na basangisi (Allah) bakotika kompengwa te kino elembo ya polele ekoyelaka bango.
2. Motindami ayeli bango kowuta epai na Allah azali kotangela bango buku ya bopeto,
3. O’kati na yango mikapo ya nsemba mizwami.
4. Baye bazwaki buku bakabwanaki te sé ntango elembo ya polele ekomelaki bango.
5. Batindamaki te sé kaka babondela Allah na bomoko bwa ye mpe batelemisa losambo mpe bafuta zakat boye nde lingomba ya bosembo.
6. Ya sôló, Bapagano kati ya baye bazwa buku na basangisi (Allah) bakozala o’kati ya móto seko na seko bango wana nde bazali bikelamu ya mabe.
7. Ya sôló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu, bango nde bazali bikelamu ya malamu.
8. Lifuta lia bango epai ya Nkolo na bango likozala lola ya eden loye míngala mizali kotiola o’nse na yango тропа libela, Allah akosepela na bango, bango pe bakosepela naye wana nde ekozala lifuta ya oyo abangi Nkolo naye.